Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bilenge 36 ya Lucha batikami nsima na mposo moko ya bokangami na Goma


Bilenge 36 ya LUCHA nsima na botikami na bango na Goma, Nord-Kivu, 24 septembre 2019. (Facebook/LUCHA)
Bilenge 36 ya LUCHA nsima na botikami na bango na Goma, Nord-Kivu, 24 septembre 2019. (Facebook/LUCHA)

Bilenge tuku misato na motoba ya lingomba Lucha babimisami na boloko na Goma, (Nord-Kivu) nsima na pene na mposo moko ya bokangemi, eyebisi baninga na bango.

"Bawuti kotikama. Basambeli na biso bazwaki lelo mokanda ya procureur mpo bobimi na bango. Mpe sik’oyo baninga na biso 36 bazali libanda," eyebisi na VOA Lingala Ghislain Muhima moko ya baye ya Lucha na Goma.

Bilenge byango bakangamaki o’libandela ya mposo moleki ntango bazalaki kotelemela compagnie Airtel na Goma, mpo na kosenga bokitisami ya ntalo, bobongisami ya lolenge ya kobenga mpe bofuti ya ngambo moko ntango ya kotinda misolo na nzela ya singa.

Na bokangami na bango bato bayike batombolaki mongongo. Martin Fayulu akomaki na page Twitter na ye ete esengelaki batikama mpe bato bayeba koloba maloba balingi lokola RDC ezali na démocratie.

Nzokande, bilenge 36 baye batikami ntango baninga ba bango basusu bazalaki kokoba kotelemela Airtel na bisika bisusu na ekolo Congo démocratique.

Na Butembo (Nord-Kivu), motoba misusu bakangamaki o’mokolo ya mibale. Na Bukavu (Sud-Kivu) mibale misusu bazoki ntango baye bazalaki kokengela Aitel batindikaki bango.

XS
SM
MD
LG