Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Koffi Olomide afundi baye bakangaki ye


Alanga nzembo Koffi Olomide (D) elongo na mosambeli na ye Me Tony Mwaba na bobimi na Cour ya cassation,na Gombe, 26 septembre 2019.
Alanga nzembo Koffi Olomide (D) elongo na mosambeli na ye Me Tony Mwaba na bobimi na Cour ya cassation,na Gombe, 26 septembre 2019.

Koffi Olomide afundi na Cour ya cassation bato ya bokengi baye bakangaki ye o’mokolo ya misato mpe bamemaki ye na parquet ya Tribunal ya Grande instance ya Gombe, eyebisi alanga nzembo na bapanzi sango na bobimi na ndako ya bosembo.

"Moto moko te amonaki bilili wana azangaki koloba te ete esengeli nafunda bango," eyanoli Koffi Olomide.

Alobeli bilili ya bokangami na ye bitamboli na ba réseaux sociaux.

Mosambeli na Koffi Olomide alobi ete baye bakangaki alanga nzembo "bamonisami lokola bazalaki na milangwa".

"Tofundi bato baye bakangi ye mpe banyokolaki ye mpe basali ye makambo esengeli kosala na moto te… Baboyi kutu koyaka ata moto moko, bamemi lokola azalaki moto ya boloko ya moto moko," Me Tony Mwaba.

"Tomonaki bato bakangaki Koffi konyokola ye mpe kozwa bilili kotiya na ba réseaux sociaux mpo na koyokisa ye nsoni," ebakisi Me Mwaba.

O’mokolo ya misato, bato na bokengi bakangaki Koffi Olomide mpe bamemaki ye na parquet ya Tribunal ya grande instance mpo na likambo ya nzembo mwambe na ye Commission ya censure epekisi.

"Nzembo ya Koffi Olomide eboyami te mpo na ezali makambo ya nsoni kasi mpo ezwaki ndigisa ya administration te," elimboli Me Mwaba.

Kasi Koffi Olomide asengaki ete président Félix Tshisekedi amikotisa na liakmbo yango mpo RDC ezali mboka ya démocratie.

Mpo na Koffi Olomide Censure esengeli kutu kozala te Congo démocratique.

XS
SM
MD
LG