Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

UE elaki Tshisekedi kobakisa 50 millions $ mpo na bitumba ya Ebola


Président Félix Tshisekedi (1er rand, 2e à D., na bokutani na ministre-président ya etuka ya engumba mokonzi Bruxelles, Rudi Vervoort, na basali baye, na na Bruxelles, 20 septembre 2019. (Twitter/Rudi Vervoort)
Président Félix Tshisekedi (1er rand, 2e à D., na bokutani na ministre-président ya etuka ya engumba mokonzi Bruxelles, Rudi Vervoort, na basali baye, na na Bruxelles, 20 septembre 2019. (Twitter/Rudi Vervoort)

Union européenne ekobakisa ba dollars milioni tuku mitano mpo na kosunga ekolo Congo démocratique na kobundisa Ebola, elobami na bokutani jeudi ya président Félix Tshisekedi na mokambi ya EU Jean-Claude Junker na Bruxelles.

Yango nde moko ya biyano bipesamaki nsima ya bokutani na mobembo ya yambo bokonzi ya Félix Tshisekedi na continent Europe.

Lisungi lisusu ya UE likozala mpo na kokolisa Etat de droit mpe mbongwana ya misala ya bosembo, nkita ya Congo democratique mpe kimya na bokengi.

Nzokande M. Tshiskedi akutani lelo na mobembo na ye na Belgique, na ministre-président ya etuka ya engumba mokonzi Bruxelles, Rudi Vervoort.

Litomba ya bokutani lizali koyikisa makasi bondeko ya bingumba moknzi mabale.

Félix Tshisekedi akomaki na Belgique o’mokolo ya yambo ya mposo mpo na mobembo na ye yambo na ekolo eye uto akoma mokonzi ya RDC le 24 janvier 2019.

XS
SM
MD
LG