Mokambi ya Monusco, Leila Zerrougui, asengi na bakambi ya kabila (communauté) inso ya Hauts Plateaux na Sud-Kivu kotelemela baye banso bazali komema bitumba kati na bango. Asakoli ete Monusco ebakisi bibundeli na yango na esika eye.
Président Félix Tshisekedi akokoma na mpokwa ya mokolo ya wambo ya mposo na Belgique mpo na mombembo na ye yambo na Europa wuta akota na bokonzi.
Président Félix Tshisekedi ayambi mokambi ya Inspection générale ya finances (IGF) mpo na likambo ya 15 millions $ oyo ezali komonana te, kasi abwakisi naino te dircteur ya cabinet na ye Vital Kamerhe, oyo atangami mpo likambo yango, eyebisi molobeli ya mokonzi ya RDC, Kasongo Mwema Yamba Yamba.
Bato tuku misato na motoba bazali komonana te nsima na bozindi ya baleinière moko na butu ya mokolo ya mposo na ya eyenga na localitè ya Mambutuka, na commune ya Maluku, na Kinshasa, eyebisi Police nationale congolaise (PNC).
Bana ya Zimbabwe mpe bakonzi ya mboka nzike, ya sika mpe ya kala lokola Joseph Kabila ya RDC, bapesi monano ya suka na Robert Mugabe motambwisi ya kala ya Zimabwe, mibu 37, na stade ya Masano ya Harare. Baiyke bapesi mowei lokumu lokola elombe ya lipanda ya Afrika.
Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya ekolo Congo démocratique, azali na matanga ya Robert Mugabe, mokambi ya kala ya Zimbabwe, na Harare.
Motango ya suka ya bawei na likama ya endunduka lisalamaki o’mokolo ya minei na Tanganyika, mozali zomi na minei (14), eyebisi mokambi ya etuka eye, Zoe Kabila.
Mbulamatari ya sika ya ekolo Congo démocratique ezalaki o'mokolo ya minei na likita lya lyango lya yambo, ya kafukafu na bokambami ya president Félix Tshisekedi na Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba.
Kobendana ezali kati na libota ya nkondo président Robert Mugabe na mbulamatari ya Zimbabwe mpo etali bokundami ya mokonzi moye ya kala ya ekolo eye, oyo akufaki mposo moko moleki.
Koleka bato batano bakufi mpe libwa bazoki na bitumba ya basimba minduki buku boleki na mboka Loku, na Djugu, na Bunia.
Nzoto ya nkondo Robert Mugabe, mokonzi ya kala ya ekolo Zimbabwe, ekomi lelo na Harare, engumba mokonzi ya mboka na ye.
Secrétaire d’Etat ya mambi ya bokolongono mpe misala ya bomoto ya Etats-Unis, Alex Azar, akokoma mikolo mikoya na Kinshasa, eyebisi département d’Etat ya Etats-Unis.
Rwanda endimi kozwa mpo na mwa ntango baye bakima mboka na bango mpe bazali kosenga kobatelama kasi bakangami na Libye.
Président Félix Tshikedi akiti na mpokwa ya mokolo mwa yambo na Brazzaville epayi wapi ayambami na mokokanani wa ye Denis Sassou N’Guesso.
Misala ya bosembo ya Afrika ya ngele mibimisi mokanda ya bokangemi mpo na bato babale bakoki kozala babomi ya espion ya kala to monongi ya kala ya Rwanda mpe motelemeli ya president Paul Kagame.
Nigeria esakoli ete ekozongisi bana mboka na yango 600 kowuta na Afrika ya ngele mposo eye, kolanda eyoma na bapaya eye ememi matata kati na bikolo mibale.
Jose Filomeno dos Santos, moko na bana ya Jose Eduardo dos Santos, mokonzi ya kala ya Angola, akosambisama le 25 septembre mpo na likambo ya kaniaka, eyebisi misala ya bosembo ya mboka na ye.
Nkombo ya Mobutu Sese Seko, mokonzi ya kala ya ekolo Congo démocratique, ekanisamaki le 2 septembre 2019, ntango Premier ministre ya sika, Sylvestre Ilunga Ilinkamba, alakaki kozongisa nzoto na ye na Kinshasa, kowuta na Maroc esika ekundama.
Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba na mbulamatari na ye bandimami na Assemblée nationale (ndako ya bokeli mibeko) mpe batiyami na mosolala na milulu misalami na Palais du peuple na Kinshasa.
Président Félix Tshisekedi apeleli, na bokutani ya nkita 5e Forum Mokutani na Kinshasa, eyoma likolo na bapaya ezali kosalema na Afrika ya ngele.
Voir plus