Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Félix Tshisekedi abeti masolo na Bill Gate


Président Félix Tshisekedi na bokutani na Bill Gate mokeli ya Micosoft Corporation na New York, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na bokutani na Bill Gate mokeli ya Micosoft Corporation na New York, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akutani na Bill Gate, mokeli ya Micosoft Corporation mpe moko na baye baleki na nkita na molongo, na masolo ya pembeni ya 74e Asselmblée générale na Nations unies na New York.

Maye basololi mayebisami te.

Bill Gate asungaka mpe mingi mpo etali bolukiluki ya bokolongono na molongo. Apesaka misolo mpo na mangwela mingi, mpo kobundisa malaria, mpe mpo kobundisa bobola na mokili na nzela ya Fondation na ye elongo na molongani na ye Melinda Bill Gate.

Nzokande Président Tshisekedi azali kolakisa na baye banso akutani na bango makoki RDC ekoki kopesa na molongo, eyebisi molobeli wa ye Tina Salama.

Ekolo Congo démocratique ezali mboka ya yambo ebimisaka coltan, colbat mpe mabanga misusu ya ntalo ya litomba mpo na ba technologies ya sika lokola informatique.

Yambo na bokutani na Bill Gate, M. Tshisekedi azalaki na lingomba ya companies minene ya Etast-Unis, Business Council for international understanding (BCIU) epayi wapi azwaki maloba.

M. Tshisekedi abandelaki koloba na bango ete RDC ekoki kopesa na molongo makambo mingi. Asengaki bango kopesa ekolo na ye maboko.

Na mpokwa ya mokolo ya mibale, M. Tshisekedi akozala elongo ya bakambi ya bikolo basusu na limpati président Donald Trump ya Etats-Unis ekopesa bango na New York.

XS
SM
MD
LG