Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Lisikulu ya Tshisekedi na 74e Assemblée générale ya ONU


Président Félix Tshisekedi yambo na lisikulu na ye,na 74e Assemblée générale ya Nations unies,na New York, 26 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi yambo na lisikulu na ye,na 74e Assemblée générale ya Nations unies,na New York, 26 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi asengi ete molongo esunga ekolo Congo démocratique na makasi ma yango mpo na kobatela zamba ya monene, mayi mpe maye masusu mokili mozali na bosenga makasi.

Alobi yango na lisikulu ya ye yambo na Assemblée générale ya Nations unies na New York.

Tolanda yango awa na bilili

Error rendering webtv un.

"Mokili mozali na mposa ya makele lokola Cobalt, Coltan na misusu, biso tozali na mpo ba industries mpe ya ntombwa," elobi M. Tshisekedi.

Alobeli mpe makambo masusu lokola bosangisi makasi na Afrika, kimya na Afrika mingi mpenza na monyele ya Congo démocratique, bobola, misala ya basi, lolenge ban aya Afrika bazali kokima mboka na bango.

M. Tshisekedi alobi esengeli Afrika mpe ekota na Conseil ya sécurité.

Asengi ete molongo molongola etumbu ewumeli mingi likolo na Zibambwe.

Alobi RDC ezali naino na mposa ya Monusco kasi na motango moke.

Bokutani bwango bozali misala ya mbala tuku sambo na minei ya ONU.

XS
SM
MD
LG