Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou alongoli ministre ya mambi ya basi nsima na matata na mokambi ya opposition


Président Denis Sassou Nguesso ya COngo-Brazzaville, na Kinshasa 7 juillet 2019.
Président Denis Sassou Nguesso ya COngo-Brazzaville, na Kinshasa 7 juillet 2019.

Président Denis Sassou Nguesso alongoli ministre ya mambi ya basi nsima na boswani bobimi na enregistrement emonisi ete mokambi ya opposition azwaki mosolo ya présidence.

Bayike balobi ete ministre Ines Befer Bertille Ingani ya mambi ya basi nde apesaki ndingisa ya bobimisi enregistrement yango.

Kati na enregistrement yango mokambi ya opposition Pascal Tsaty apameli ye na bozangi bosembo.

Ines Befer Bertille Ingani alongolami na mokano ya mokonzi ya mboka motiyamaki maboko o’mokolo ya mibale na mpokwa.

Mokambi ya opposition Pascal Tsaty afundi ye (Mme Ingani) mpo na kososola (kotiola) ye na enregistrement ezali kotambola na ba réseaux sociaux. Mpe alaki komema likambo yango na bazuzi.

Na enregistrement yango, mongongo ya Mme Ingani moyokani koloba mabe mpo na M. Mabiala na motuna moko etali mosolo ya mwana ya mokonzi ya Congo-Brazzaville, Denis Christel Sassou Nguesso.

Mwanda ya Sassou Nguesso azali ntoma na [arlement kasi afunamaki sanza moleki na ONG Global Witness na kozwa mosolo ya l’Etat ($50 million S) mpe kosalale myango mabe.

Mme Ingani oyo azali na mibu 47, azalaki na ebonga wana uto sanza ya minei ya 2016.

XS
SM
MD
LG