Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pelosi apesi nzela ya bolukiluki likolo ya Trump


Président Donald Trump (ya kovanda) apesi mbote na molobeli ya ndako ya ba ntoma mpe mokambi ya ba démocrates Nancy Pelosi na Washington, 12 mai 2019.
Président Donald Trump (ya kovanda) apesi mbote na molobeli ya ndako ya ba ntoma mpe mokambi ya ba démocrates Nancy Pelosi na Washington, 12 mai 2019.

Nancy Pelosi, mokambi ya ba démocrates na Congrès ya Amerika apesi nzela mpo na bofundami ya président Donald Trump likolo na anketi bayike bakanisi ete asengaki mokonzi ya Ukraine asala na ntina ya mbanda na ye ya politiki Joe Biden, moko na ba démocrates.

"Lelo nasakoli ete suku ya ba représentants (assemblée nationale ya Etats-Unis) efungoli bolukiluki na ntina ya kokweyisa (mokonzi ya ekolo," elobi Nancy Pelosi.

Mpo na Mme Pelosi, "misala ya president kino sik’oyo ebuki Mobeko likonzi."

Likambo etali masolo M. Trump abetaki na président ya Ukraine na ntina ya vice-président ya kala Joe Biden na na mwana na ye. Bayike bafundi M. Trump na kotinda président ya Ujraine ksala anketi likolo na M. Biden na mwana na ye.

Nzokande na ngambo na ye, Donald Trump alobi bazali kaka kolukela ye makambo.

"Ba démocrates balingi babebisela ngai mokolo na basango ya kokolukela ngai makambo," ekomi M. Trump na compte Twitter na ye. M. Trump alobi mokolo yango ezali monene mpo awuti kosala lisikuli kitoto na bokutani ya monene ya 74e ya Nations unies na New York.

M. Trump azali républicain. Akopesa nkombo na ye mpo maponami ya mokonzi ya ekolo makoya na 2020.

Na ngambo ya ba démocrates, Joe Biden, vice-président ya ntango ya président Barack Obama, azali mpe moko na baye bazali kowelela mpo na kozala candidat.

M. Trump afundami mpo na kotiya mbamba na président ya Ukraine na kosenga bolukiluki likolo ya VP Biden na mwana na ye.

Congrès, kasi mingi mpenza ba démocrates, basengaki ntango molayi ete M. Trump ayebisa bango na bozindo masolo asalaki na président ya Ukraine. Balobi ete mingi mileki mingi mpe M. Trump azali kopesa bango eyano ya malonga te.

Bayokaki sango ete Trump elongo na misala na ye na Maison Blanche, baboyaki na nko kopesa makomi ya masolo na ye na président ya Ukraine.

XS
SM
MD
LG