Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Dr Oly Ilunga atiyami na résidence surveillée (bokangami ya ndako)


Dr. Oly Ilunga Kalenga, ministre ya kala ya bokolongo na Mbandaka, 21 mai 2018.
Dr. Oly Ilunga Kalenga, ministre ya kala ya bokolongo na Mbandaka, 21 mai 2018.

Ministre ya kala ya bokolongo bwa nzoto, Dr. Oly Ilunga, atiyami na 'résidence surveillée' (boloko ya ndako na ye moko) kolanda mokano ya Cour ya cassation, eyebisi basambeli baye.

Nsima na bokanami na ye o’mokolo mposo, Dr. Ilunga atindamaki o’mokolo ya mibale na parquet mpe na Cour ya cassation.

Afundami mpo na kosalela 4,3 millions ya ba dollars miye mizalaki mpo na Ebola.

Moko na basambeli ya Dr. Ilunga, Me Guy Kabeya ayebisi VOA Lingala ete bazalaki na Cour ya cassation eye etalaki likambo yango na chambre ya conseil.

"Lisanga ya ba avocats ya Dr. Oly Ilunga Kalenga, ministre ya kala ya RDC, eyebisi bato kati na mboka mpe libanda ete atiyami na 'résidence surveillée' na mokano ya Cour ya cassation," elobi liyebisi.

Bosambisami ya Dr. Ilunga bozali kokoba, elobi Me Kabeya.

Ministre Oly Ilunga atikaki mosala na sanza sambo nsima na botiyami na mosala ya Dr Jean-Jacques Muyembe mpo na kokamba cellue technique ya bitumba na Ebola.

Pulusu ekangaki ye mokolo ya mposo mpe elobaki ete alingaki kokima na Congo-Brazzaville na nzela ya etuka ya Kongo central.

Kasi, mosambeli wa ye, Me Guy Kabeya awanganaki yango na elobeli ya VOA Lingala.

XS
SM
MD
LG