Police etikelaki te bayi Lamuka kotambola na Kinshasa, engumba mokonzi ya ekolo Congo démocratique mpe na Bunia, na Ituri. Kasi bato batambolaki na bisika misusu mpo na koboya bobomami na monyele mpe mabongisi ya kokata mabele ya ekolo.
Nigeria, Ghana, du Liberia, Sierra Leone, Gambie, banso mboka anglophones, na voisin bango Guinée, oyo ezali francophone, baboyi ECO, mosolo ya mokelamaki le 22 décembre mpo na Afrique ya Ouest.
Moïse Katumbi, moko na bakambi ya lingomba Lamuka azali awa na Etats-Unis epayi wapi ayambamaki na motindami ya Amerika na etuka ya Grands lacs ya kati ya Afrika, Tibor Nagy.
Mibu zomi na libwa mikoki wuto nkondo Laurent-Désiré Kabila mokonzi ya kala ya ekolo Congo démocratique akufaki na kiti ya bokonzi na Kinshasa.
Mokambi ya MONUSCO alobi ete moto moko te na molongo azali koluka kokabola ekolo Congo démocratique.
Donald Trump, président ya Etats-Unis atie manzaka na mokanda ya boyokani mpo na commerce (mombongo) na vice-Premier ministre chinois Liu He. Boyokani boye bosukisi boswani kati na mboka mibale eye.
Mokambi ya sika ya police na Lubumbashi asengi na bavandi kosalisa ye kobundisa bozangi bokengi bozali kongala na engumba mokonzi ya na Haut-Katanga.
Bitumba ya malabo bizali kosalama kati na bakambi ya engumba mokonzi ya ekolo Congo démocratique na bayi lingomba Lamuka mpo etali botamboli bwa bango ya mokola ya le 17 janvier.
Martin Fayulu alobi ete bana ya RDC esengeli batambola le 17 janvier mpo koboya balkanisation to bokati ya mboka na bango. Alobi mabongisi ya baye balingi kokata mboka makolonga te. Apameli Joseph Kabila mpe président Tshisekedi mpo na kopesa maboko na baye balingi kokata RDC. (Bililingi ya Lexxus L
Président Félix Tshisekedi akutani na masolo na cardinal Fridolin Ambongo Besungu na Kinshasa.
Mikolo ya ba FDLR mitali ya kotanga, eyanoli bakonzi ya Rwanda na babundi baye ya ba hutu ya Rwanda, baye basokili ete président Félix Tshiseki na Paul Kagame bayokani mpo na kosilisa ba hutu na RDC.
Ba batomboki hutu ya FDLR (Forces démocratiques pour la libération du Rwanda) bapameli boyokani ya nkuku kati na président Félix Tshisekedi ya RDC na mokokani wa ye ya Rwanda, Paul Kagame, ekomi bango na mokanda.
Président ya Iran Hassan Rohani asengi bolimbisi na mokokani wa ye ya Ukraine Volodymyr Zelensky mpe ayebisi ye ete ezalaki na libunga nde mampinga ya mboka na ye mabetaki missile na Boeing 737-800 ya Ukraine Internationl Airlines, elobi présidence ya Iran.
Koleka bato 701 bakufi na babomami na etuka ya Ituri wuto décembre 2017, elobi nsima na bolukiluki, Bureau conjoint ya ONU mpo na mambi ya makoki ya bomoto (BCNUDH), na rapport esakolami na Genève, na Suisse.
FARDC endimi ete colonel Michel Rukunda, cmt 2nd ya secteur Walikale, akimi mapinga ya ekolo Congo démocratique mpo na kokende kakamba na milice Gumino.
Mpepo moko ya Afrique du Sud ezalaki komema bato tuku motoba ezwaki moto na bokiti na yango na aéroport ya Goma, na Nord-Kivu, eyebisi bayi Monusco.
Moïse Katumbi apesameli palata ya mokambi ya malamu ya koleka ya ba clubs ya football na Afrika, mardi na milulu ya CAF Awards 2019, na Hurghada, na Egypte.
Président Félix Tshisekedi aboyi ete université ya Kinshasa ekangama nsima na mobulu ya mardi, kasi asengi ete ba étudiants nyonso ya ba homes bazala identifiés, kolanda moloba ya directeur ya cabinet na ye, Vital Kamerhe na maloba apesi na Actualité.cd.
Mampinga ya ekolo Congo démocratique balobi ete ba soda 60 bakufi na sanza mibale na bitumba na ba ADF na Beni, na Nord-Kivu.
Colonel John Tshibangu atiyanmi banda mokolo ya mposo na bopemi na Centre Nganda, elobi moko na bayi nzinganzinga na ye.
Voir plus