Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Koleka bato 701 bafuki na babomami bokoki kobengama "genocide" na Ituri


Ba soda ya mampinga ya ekolo Congo démocratique FARDC na zamba ya Wagu na Djugu, na Ituri, 4 juillet 2019.
Ba soda ya mampinga ya ekolo Congo démocratique FARDC na zamba ya Wagu na Djugu, na Ituri, 4 juillet 2019.

Koleka bato 701 bakufi na babomami na etuka ya Ituri wuto décembre 2017, elobi nsima na bolukiluki, Bureau conjoint ya ONU mpo na mambi ya makoki ya bomoto (BCNUDH), na rapport esakolami na Genève, na Suisse.

Na rapport yango, ONU elobi ete bobomi mpe bitumba ya Ituri ekoki kobengama "crime contre l’humanité" (mbeba ya bomoto) to mpe "génocide" (bobomi ya kosilisa basusu).

Balendu, kabila eyebani mpo na kosala bilanga mpe ba Hema, babokoli bibwele mpe basali mombongo, bazali kobunda mpo na mabele na Ituri, na ndelo na Ouganda.

Koleka bato 701 bakufi na babomami na etuka ya Ituri wuto décembre 2017, elobi nsima na bolukiluki, Bureau conjoint ya ONU mpo na mambi ya makoki ya bomoto (BCNUDH), na rapport esakolami na Genève, na Suisse.

Rapport yango elobi ete bato 402 babomamaki kati na décembre 2017 kino septembre 2019 mpo bazalaki ba Hema.

XS
SM
MD
LG