Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na cardinal Ambongo basololi mpo etali Est


Président Félix Tshisekedi azali kosolola na cardinal Fridolin Ambongo Besungu na Kinshasa, RDC, 13 février 2019. (Twitter/
Président Félix Tshisekedi azali kosolola na cardinal Fridolin Ambongo Besungu na Kinshasa, RDC, 13 février 2019. (Twitter/

Président Félix Tshisekedi akutani na masolo na cardinal Fridolin Ambongo Besungu na Kinshasa.

"Masolo na bango mazalaki likolo ya mobembo ya (cardinal Ambongo) na monyele mpe mpo na mobembo ya mikolo mikoya ya président na Vatican," eyebisi présidence ya RDC na poste Twitter na yango.

Mokolo ya mobembo ya président Tshisekedi mpo na kokutana na Papa moyebisami nanu te.

Nsima na mobembo na ye na Est mposo moleki, Cardinal Ambongo akebisaki mpo etali bokatani to balkanisation ya ekolo Congo démocratique.

Asengaki bana ba RDC kopesa maboko na mampinga ya FARDC.

Nzokande, na likita ya mbulamatari ya mposo moleki, président Tshisekedi alakaki ete na bokonzi bwa ye, RDC ekotama te.

XS
SM
MD
LG