Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Iran endimi ebetaki na libunga missile na Boeing 737 ya Ukraine


Ndambo ya Boeing 737-800 eye ekweyisamaki na missile ya mampinga ya Iran na Teheran, Iran, 10 janvier 2020.
Ndambo ya Boeing 737-800 eye ekweyisamaki na missile ya mampinga ya Iran na Teheran, Iran, 10 janvier 2020.

Président ya Iran Hassan Rohani asengi bolimbisi na mokokani wa ye ya Ukraine Volodymyr Zelensky mpe ayebisi ye ete ezalaki na libunga nde mampinga ya mboka na ye mabetaki missile na Boeing 737-800 ya Ukraine Internationl Airlines, elobi présidence ya Iran.

Boieng 737-800 yango ekweyisamaki mercredi na missile ya mampinga ya Iran mpe bato 176 bazalaki na kati bakufaki.

M. Rohani ayebisi Volodymyr Zelensky ya Ukraine ete bato banso bazalaki na mbeba yango bakomemama na kosambisama, eyebisi présidence ya Iran.

Tata mokonzi ya Iran andimi mpenza mabe maye masali likolo na libunga ya basoda ya mboka na ye mpe asengi bolimbinsi, ebakisi présidence ya Iran.

M. Zelensky asengi Teheran epesa nzela ete nzoto ya bayi Ukraine 11 bakufi na likama yango kozongisima kino le 18 janvier mpe alobi ba diplomates ya Ukrrraaaine bapesi liste ya makambo masengeli kosalama mpo na kobongisa mbeba yango.

Iran eyokani na Ukraine mpo na likambo oyo, elobi liyebisi.

Boieng 737-800 yango ekweyisamaki mikolo miike nsima na mampinga ya Etats-Unis koboma na bombe ya likolo Qasem Soleimani, mokambi ya ba Gardiens ya révolution mpe babundi bayike ya milice eye esalaka bitumba na Irak, mboka ezali pene.

Mampinga ya Iran malobi mbemba ya kobeta missile na Boeing eye esalamaki mpo mpepo yango elekaki pene na esika mampinga ya ba Gardiens ya revolution mazalaka.

Nzoka nde, bakonzi ya Iran ekangaki mpo na mwa ntango ambassadeur ya Grande-Bretagne.

Bato batomboli na Teheran mpo likama ya mpepo liye.

XS
SM
MD
LG