Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba FDLR bapameli "boyokani ya nkuku" kati na Tshisekedi na Kagame


Président Paul Kagame ya Rwanda (g) na mokokani wa ye ya RDC, Félix Tshisekedi, na African CEO Forum, na Kigali, Rwanda, 25 mars 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Président Paul Kagame ya Rwanda (g) na mokokani wa ye ya RDC, Félix Tshisekedi, na African CEO Forum, na Kigali, Rwanda, 25 mars 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Ba batomboki hutu ya FDLR (Forces démocratiques pour la libération du Rwanda) bapameli boyokani ya nkuku kati na président Félix Tshisekedi ya RDC na mokokani wa ye ya Rwanda, Paul Kagame, ekomi bango na mokanda.

Bakomi ete bazali "kotelemela na bokasi bonso boyoka boye bokoki kozala kati na M. Tshisekedi na Kagame".

Mpo na batomboki baye, "boyokani bwango bozali ya kosangasi ba FRD (mampinga ya Rwanda), ba FARDC mpe masanga ya basimba minduki na ntina ya kosilisa bakima bitumba (réfugiés) rwandais na monyele ya RDC ntango Monucso ezali kotala kasi koloba eloko te," ekomi ba FDLR ba liyebisi litiyami manzaka na molobeli mwa yango ya sika, Cure Ngoma.

Batomboki baye bakundoli ete "eloko ya liboso ba envahisseurs ya RDC, oyo mbulatari ya Rwanda ezali kati na bango, balukaka ezali kowumela kati na mabongisi na bango ya kozwa mabele yango RDC (balkanisation soki bakoki) bakanaka kosala wuto mibu ya 1990," ekomi ba FDLR.

Bapameli MONUSCO mpo na kozanga kobatela ba réfugiés bawuta Rwanda mpe kobatela bango likama ya liwa.

Basengi molongo kotiya mbamba na bokonzi ya Kigali mpo na andima masolo na bana banso ya Rwanda.

FDLR ekelama na 1994 na RDC nsima na bituma bimemaki bobomami ya bato koleka 800.000 na Rwanda.

Bakimaki na RDC mpe bafundama mpo koboma ba Tutsi mingi. Kasi mingi baz0ngisama na Rwanda. Lelo motango na bango ezali na se ya 1.400, kolanda Monusco.

XS
SM
MD
LG