Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mokambi ya sika ya police asengi lisungi ya population na Lubumbashi


Police na Lubumbashi, Haut-Katanga, 26 mai 2016.
Police na Lubumbashi, Haut-Katanga, 26 mai 2016.

Mokambi ya sika ya police na Lubumbashi asengi na bavandi kosalisa ye kobundisa bozangi bokengi bozali kongala na engumba mokonzi ya na Haut-Katanga.

"Tosengi lisungi ya makasi ya bana mboka na bitumba na 'criminalité' oyo tozali komona na engumba ya Lubumbashi mpe nzinga nzinga," elobi na bapanzi sango général Louis-Second Karawa oyo awuti kozwa ebonga na ye.

Nzokande, bato bakitaki o’balabala na nkanda mardi mpo civil moko akufaki na masasi mabetamaki kati na police na bato bayebani te.

"Policier abetaki lisasi na moto yango na kozanga koyeba mpe moto yango akufaki," ekomi police na liyebisi.

Bato mabe babale bakufaki na bobetani ya masasi na police, kolanda liyebisi.

Bato bazali na nkanda na Lubumbashi likolo ya bozangi bokengi bozali kongala.

Vendredi, activiste moko, na nkombo ya Joseph Kapepula akangamaki na ANR (Agence nationale des renseignements) nsima na kobenga bato na vidéo kotelemela bozangi bokengi. Vidéo yango etambolaki na ba réseaux sociaux.

M. Kapepula atikamaki mardi na mpokwa, kolanda avocat na ye. Kasi asengami kokenfe na parquet lundi.

XS
SM
MD
LG