Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi aboyi Unikin ekangama


Ba policiers mpe basoda bazali kokengela na Kinshasa, 30 décembre 2018.
Ba policiers mpe basoda bazali kokengela na Kinshasa, 30 décembre 2018.

Président Félix Tshisekedi aboyi ete université ya Kinshasa ekangama nsima na mobulu ya mardi, kasi asengi ete ba étudiants nyonso ya ba homes bazala identifiés, kolanda moloba ya directeur ya cabinet na ye, Vital Kamerhe na maloba apesi na Actualité.cd.

"Slogan na biso ezali 'le peuple d’abord'. Esengeli tokitisa mitema ya ba étudiants ya solo ete eyano ekopesama. Pamba te, mokonzi ya mboka ayokaka bana ya mboka. Kasi tosengeli mpe tobatela baye ya force de l’ordre contre ba infiltrés," eyebisi M. Kamerhe na Actualité.cd.

M. Kamerhe alobi asololi na président Tshisekedi oyo azalaki na mobembo na Angola mpe esengalaki akende kopema na Moanda.

M. Kamerhe ayebisi ete président Tshisekedi akanisi ete bato basali mobulu mpe babomi ekoki kozala baye bakotaki kokota na université to ba 'infiltrés'. "Esengeli toyeba na ko indetifier ba étudiant ya solo mpe bazonga na ba homes na bango," elobi M. Kamerhe.

Nzokande, ngonga eleki moke, ministre ya Enseignement supérieur mpe universitaire, Thomas Luhaka, asakolaki ete misala minso ya université ya Kinshasa mitelemisami kino mokano mosusu mokozwama.

Mokano ya M. Luhaka elandaki mobulu mosalamaki mpo na mokolo ya mibale na Unikin mpe ememaki liwa ya policier moko.

M. Kamerhe alobi président akosolola na ba étudiants yambo na likita ya mbulamatari ya vendredi mpo na koluka eyano.

Ba professeurs baye bazali kati na APUKIN (Association ya ba professeurs ya Unikin) elongo na bayi corps administratif basengaki bokongami ya kelasi eye ya likolo nsima mobulu ya mardi.

Ba étudiants babetaki ba policiers, babebisaki mpe bapunzaki biloko ebele lokola ba bureaux mpe agence ya banque BCDC.

Ba étudiants batiyaki moto na mituka biike.

Policier moko akufaki na kobetama na police, kolanda maloba ya Commissaire divisionnaire adjoint ya police, mokambi ya police ya Kinshasa, général Sylbano Kasongo.

Ba étudiants bazali kosala mobulu mpo na koboya bomatisi ya mosolo esengeli bafuta mpo na kelesi.

XS
SM
MD
LG