Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mikolo ya ba FDLR mizali ya kotanga, eyanoli Sec. d’Etat ya Rwanda


Président Félix Tshisekedi ya RDC (D) na bokutani na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame, na New York, 23 septembre 2019. (Facebook/Présidence Rwanda)
Président Félix Tshisekedi ya RDC (D) na bokutani na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame, na New York, 23 septembre 2019. (Facebook/Présidence Rwanda)

Mikolo ya ba FDLR mitali ya kotanga, eyanoli bakonzi ya Rwanda na babundi baye ya ba hutu ya Rwanda, baye basokili ete président Félix Tshiseki na Paul Kagame bayokani mpo na kosilisa ba hutu na RDC.

Secrétaire d’Etat ya Rwanda ya mambi ya bikolo ya bapaya, Oliver Nduhungirehe akomi eyano yango na compte Twitter na ye mikolo mibale nsima na mokanfa ya FDLR.

"Na bokasi ya ba FARDC, mikolo ya FDLR mikomi ya kotanga," ekomi M. Nduhungirehe.

"Ezalaki kaka kozanga ba génocidaires ya FDLR baye bazali kopesa somo na ba Congolais na monyele ya RDC wuto 1994 mpo te bazwa nzela bayi politiki bafungoleli bango mpe na bayi Eklezia bazanga lokumu," eyebisi M. Nduhungirehe.

Na suka ya mposo, ba FDLR balomi na mokanda ete bakonzi babale ya biloko mibale RDC na Rwanda bazali na boyokani ya nkuku mpo na kosilisa ba hutu bakima bitumba na Rwanda mpe bavandaka na Congo.

Mikolo mileki, cardinal Fridolin ya eklezia katoliko ya RDC abwaki mpo na kokebisia na balanisation. Ndenge moko mokambi y aba protestants, Pasteur Bokundoa-bo-Likabe alobaki yango.

Bayi politki mpe lokola bapamelaki yango lokola mozito.

Kasi, na likita ya mbulamatari ya mokolo ya vemdredi eleki, président Tshisekedi alakaki ete mboka ekokatama te ntango ye azali na bokonzi.

XS
SM
MD
LG