Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump ayokani na Chine mpo na commerce


Donald Trump, président ya Etats-Unis atie manzaka na mokanda ya boyokani mpo na commerce (mombongo) na vice-Premier ministre chinois Liu He na Maison Blanche, Washington, 15 janvier 2020.
Donald Trump, président ya Etats-Unis atie manzaka na mokanda ya boyokani mpo na commerce (mombongo) na vice-Premier ministre chinois Liu He na Maison Blanche, Washington, 15 janvier 2020.

Donald Trump, président ya Etats-Unis atie manzaka na mokanda ya boyokani mpo na commerce (mombongo) na vice-Premier ministre chinois Liu He. Boyokani boye bosukisi boswani kati na mboka mibale eye.

"Lelo ezali etapi ekotika lisolo… eye esalamu nanu te… mpo na boyokani ya mombongo (accord commercial) ya sembo mpe réciproque kati na Etats-Unis na Chine," elobi M. Trump na milulu myango.

Boyokani boye bokosilisa bitumba ya commerce kati na Etats-Unis na Chine, mboka mibale ya yambo na molongo mpo etali nkita .

Bayi mombongo ya Etats-Unis basepeli na boyokani bwango kasi bayebisi ete mingi ezali nanu ya kosalama.

Boyokani bwango bokotiyama na misala nsima mikolo 30. Ekozala mingi mpo na bolamu baye balonaka (agriculuteurs) mpe baye ya ba industries.

Chine ekobakisa misolo 200 milliards $ mpo na kosomba biloko na Etats-Unis na mibu mibale mikoya. Yango ekokitisa déficit économique ya Etats-Unis lokola Amerika ezalaki kosenga.

Boyokani bwango botali mpe botosi ya propriété intellectuelle mpe ba conditions ya transfert ya ba technologies na makambo misusu Etats-Unis ezalaki kosenga.

XS
SM
MD
LG