Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Lamuka epameli police na kobwaka gaz lacrymogène mpe kokanga na Kinshasa


Martin Fayulu elongo na Adolphe Muzito (az'o monana te) kati na balandi ba bango na botamboli na Kinshasa, 30 juin 2019.
Martin Fayulu elongo na Adolphe Muzito (az'o monana te) kati na balandi ba bango na botamboli na Kinshasa, 30 juin 2019.

Police etikelaki te bayi Lamuka kotambola na Kinshasa, engumba mokonzi ya ekolo Congo démocratique mpe na Bunia, na Ituri. Kasi bato batambolaki na bisika misusu mpo na koboya bobomami na monyele mpe mabongisi ya kokata mabele ya ekolo.

Lamuka ebengisaki botamboli vendredi, o'mokolo na bokundoli mibu 59 nsima na liwa ya Patrice Emery Lumumba, Premier ministre ya yambo ya RDC.

"Police ewuti kokanga secrétaire national ya implantation ya Ecidé, Alex Dende 'Lexxus Legal' mpe ememi ye na bisika biyebani," elobi moko na baye babongisa botamboli boye, Steve Kivutata, secrétaire général ya parti Nouvel élan ya Adoplhe Muzito.

Kolanda M. Kivuata, bato bayike bazoki ma Kinshasa. Kati na bango député Ados Ndombasi.

Police epesi nanu motango ya bato bakangami te.

"Ata police etikaki biso te. Totambolaki kati na 500 policiers. Mawa nde ezali mpo tokokaki te kotika fololo na ekoko ya Patrice Emery Lumumba", elobi Martin Fayulu.

Police ebetaki gaz lacrymogène mpo na kopanza batamboli na arrêt BKTF na commune ya Masina, na Kinshasa, mpe ememamaki Martin Fayulu, président ya Ecidé, na Adolphe Muzito ya Nouvel élan, boko na bakambi ya Lamuka, na ndako na bango.

Na Bunia, na Ituri, police mpe etika bato kotambola te.

Kasi na bisika misusu lokola na Beni, na Goma mpe bingumba misusu, ata na ouest, mpe bato batambolaki.

XS
SM
MD
LG