Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Gentiny Ngobila aboyi botamboli kasi Lamuka elobi ekosalama


Martin Fayulu elongo na Adolphe Muzito (az'o monana te) kati na balandi ba bango na botamboli na Kinshasa, 30 juin 2019.
Martin Fayulu elongo na Adolphe Muzito (az'o monana te) kati na balandi ba bango na botamboli na Kinshasa, 30 juin 2019.

Bitumba ya malabo bizali kosalama kati na bakambi ya engumba mokonzi ya ekolo Congo démocratique na bayi lingomba Lamuka mpo etali botamboli bwa bango ya mokola ya le 17 janvier.

Mokambi ya etuka ya Kinshasa, Gentiny NGobila andimi te kotika nzela na botamboli Lamuka elingi kosala na Kinshasa o'mokolo ya kokanisa liwa ya Patrice Emery Lumumba, Premier ministre wa yambo ya RDC akufaki na 1961.

"Na koki kondima te mabongisi ma bino na kotalaka makambo mazali koleka mikolo miye na mboka, yango ekoki komema mobulu na mboka," ekomi M. Ngobila na mokanda azongiseli kalaka mokonzi ya Nouvel Elan, parti ya Adoplhe Muzito, mokambi ya ngonga eye ya lingomba Lamuka. M. Muzito nde abwakaki mbela pene na mposo mibale mileki mpo etali boluki kokabola Congo (balkanisation).

Molebeli ya Lamuka mpe kalaka mokonzi ya Nouvel Elan, Steve Kivuata ayanoli ete "mokambi ya Kinshasa azwi mokano moye mozangi likonzi". "Botamboli na biso bokosalama kaka le 17 janvier. Totelemi likolo ya ba articles 26 mpe 28 ya Buku likonzi mpo na kosala milulu na biso," elobi, M. Kivuata.

"Tozali kosenga te na gouverneur atala milulu ya bokundoli liwa ya elombe P. E. Lumumba. Abandaki makambo ya salongo awa, kasi engumba na biso ezali kaka na bosoto ya koloba te. Ayebisa liboso soki yen de azali mokambi ! Tokotambola! Ezali mokolo ya elombo ya ekolo mpe tokotambola mpo na koloba yambo ete toboyi bobomami ya bandeko babiso na Beni mpe na bisika binso lokola na Yumbi. Mpe tokolakisa lisusu nkanda na biso likolo ya mabongisi ya kokata mboka na biso," elobaki na ngambo na ye Martin Fayulu, candidat ya Lamuka na maponami ya mokonzi ya ekolo ya le 30 décembre 2018.

XS
SM
MD
LG