Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Katumbi asololi mpo na kimya  na RDC na Nagy na Washington


Moïse Katumbi (C) na bokutani na motindami ya Etats-Unis na etuka ya Grands lacs na kati kati ya Afrika, Tibor Nagy (2e D) na Washington, Etats-Unis, 16 janvier 2020. (Twittor/Tibor Nagy)
Moïse Katumbi (C) na bokutani na motindami ya Etats-Unis na etuka ya Grands lacs na kati kati ya Afrika, Tibor Nagy (2e D) na Washington, Etats-Unis, 16 janvier 2020. (Twittor/Tibor Nagy)

Moïse Katumbi, moko na bakambi ya lingomba Lamuka  azali awa na Etats-Unis epayi wapi ayambamaki na motindami ya Amerika na etuka ya Grands lacs ya kati ya Afrika, Tibor Nagy.

"Masolo ya botongi lelo na Moïse Katumbi, mokambi ya lingomba ya boyokani Ensemble na RDC," ekomi na compte Twitter na ye Tibor Nagy.

Masolo mango mazalaki mpo na kimya mpe kofulukisama to prospérité ya bana Congo, elobi ambassadeur Nagy.

Basololi mpo kimya ntango likambo ya balkanisation (bokati mboka) lizali kolobelama mingi na RDC.

M. Katumbi abongolaki lingomba Ensemble na parti politique na décembre. Ekomi "Ensemble pour la république", mpe ezali komilengela mpo na maponami ya mokonzi ya ekolo ya 2023.

M. Katumbi aponamaki mposo mibale mileki na CAF, mokambi ya malamu koleta ya club ya football na TP. Mazembe.

XS
SM
MD
LG