Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Monusco eboyi likambo ya balkanisation


Mokambi ya Monusco Leila Zerrougui na bokutani na président Félix Tshisekedi na Kinshasa, RDC, 7 juin 2019. (Présidence/RDC)
Mokambi ya Monusco Leila Zerrougui na bokutani na président Félix Tshisekedi na Kinshasa, RDC, 7 juin 2019. (Présidence/RDC)

Mokambi ya MONUSCO alobi ete moto moko te na molongo azali koluka kokabola ekolo Congo démocratique.

"Ezali na moto moko te, ezala na molongo to na mboka nzinga nzinga, azali koluka mabele ya Congo," elobi Leila Zerrougui liboso ya bapanzi sango.

Mpo na ye, Congo ezwaki ndelo na yango uto ba noko, colonisation mpe moto moko aboya yango te.

"Namoni te ba Congolais baye bazali koloba: 'tosala Etat na biso, tolingi tokabolana na Congo'," elobi Mme Zerrougui.

Balkanisation to bokaboli ya Congo ezali lisolo lizali kobeta mingi na Congo mikolo oyo.

Cardinal Fridolin Ambongo alobaki yango nsima na mobembo na Est.

FARDC, mampinga ya RDC maye mazali kobundisa basimba minduki mpe batomboki na Est, balobaki yango mpe lokola.

ECC, église mpe ekebisa mpo na yango.

Adolphe Muzito, mokambi ya ngonga oyo ya lingomba Lamuka, asengaki RDC kobongisa mampinga na yango mpe kosangisama na Rwanda na makasi.

Martin Fayulu na M. Muzito basengi bato kotambola le 17 janvier, mokolo ya bokanisi liwa ya Premier ministre wa yambo ya RDC Patrice Emery Lumumba, mpo na koboya balkanisation.

Gouverneur ya Kinshasa, Gentiny Ngobila apesi nzela te.

XS
SM
MD
LG