Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Katumbi azwi palata ya mokambi ya malamu koleka na CAF Awards


Président Gianni Infantino (G) apesi mbano ya CAF Awards 2019 na Moïse Katumbi, moka,ni ya TP Mazembe na milulu na Hunghada, Egypte, 7 janvier 2019.
Président Gianni Infantino (G) apesi mbano ya CAF Awards 2019 na Moïse Katumbi, moka,ni ya TP Mazembe na milulu na Hunghada, Egypte, 7 janvier 2019.

Moïse Katumbi apesameli palata ya mokambi ya malamu ya koleka ya ba clubs ya football na Afrika, mardi na milulu ya CAF Awards 2019, na Hurghada, na Egypte.

Mokambi ya TP Mazembe azali bongo se Congolais moko oyo azwi mbando na CAF Awards 2019.

"Ezali lokumu monene kozwa mbano ya CAF Awards ya président ya maluma koleka ya ba clubs. Ezali mbano ya staff, ba joueurs mpe ya fans ya TP Mazembe… Napesi yango na bana ya mboka na ngai ya Beni baye bazali na mpasi mpe na bandeko banga banso ya basi mpe mibali ya Afrika!," elobaki M. Katumbi nsima na kozwa palata na ye.

Na molongo ya joueur ya malamu koleka, CAF Awards 2019 epesamelaki na moyi Sénégal Sadio Mané ya Sénégal oyo abetaka na Liverpool.

Algérie nde équipe nationale ya mibali ya malamu koleka ya 2019.

Djamel Belnadi ya Algérie nde azwi mbando ya entraîneur ya malamu koleka.

Joueur ya elenge nde Achraf Hakimi ya Maroc.

Youcef Belaili, joueur ya 2019 oyo apetaka na Afrika.

Prix spécial epesami na Kodjovi Obilale ya Togo.

Joueuse ya malamu koleka, Asisat Oshoala ya Nigeria.

Equipe ya basi nde ya Cameroun.

Entraiineur ya malamu ya basin de Desiree Ellis ya Afrique du Sud

Mpe Fédération nde Egypte.

XS
SM
MD
LG