Luc Malembe, moko na bayi opposition eye ezali nsima na Martin Fayulu, akangami wuto koleka mposo moko na Bunia, na Ituri, epayi wapi afundami na kofinga mokonzi ya mboka.
Junion Ilunga Makabu boxeur (mobeti bibotu) ya RDC azwi nkamba ya wolo ya WBC lourd-léger nsima na kolonga na ba points polonais Michael Cieslak na Shark hôtel, na Kinshasa.
Nzoto ya bato 24 ezwamaki o’mokolo mwa misato nsima baye bamonani kozala ba ADF kokata bango na makwangola (machettes) pene na Oicha, na territoire ya Beni. Mercredi, 36 bato basusu babomamaki nsima na bokatami. Baye babiki bamemaki na lopitalo mpo na kozwa lisungi. Totala.
Bato 24 bakufi na makwangola na bitumba ya baye bafundami kozala ba tomboki ya ADF o'mokolo mwa minei, pene na Oicha, engumba mokonzi ya territoire ya Beni.
Bakonzi ya bokolongono na Etats-Unis balobi moto ya yambo azwi bokono ya Coronavirus kowuta na moto mosusu na mabele ya Amerika. Moto yango ezali mobali oyo azwi bokono bwango na mwasi na ye.
Nzoto ya Kobe Bryant mpe ya bawei mwambe misusu elongalami na esika hélicoptère ezalaki komema bango ekweyaki dimanche na Calabasas, na Californie, eyebisi misala ya médecin légiste ya compté.
Mme Michelle Bachelet, Haut-Commissaire ya Nations unies mpo na Makoki ya bomoto asengi bakonzi ya RDC basala makasi mpo ete misala ya mapinga mpe ya bokengi mitika kosala mbeba ya bomoto
Avion ya mampinga ya Etats-Unis ekweyi lundi na Afghanistan na esika ezali na maboko ya ba talibans. Lingomba ya ba talibans elobi bango ndenge babeti yango masasi.
CNDD-FDD, parti ya Pierre Nkurunziza, mokonzi ya Burundi, eponi général Evariste Ndayishimiye lokola candidat na yango na élection présidentielle ya mai 2020. M. Nkurunziza alakaki nsima na kobongola buku likonzi ete akozala te na maponami myango.
Basimba minduki mpe mampinga babomi 197 civils na décembre na Est, elobi balukiluki ya Kivu security tracker (KST).
Kobe Bryant, mosani monene ya basketball ya NBA (championnat national américain) oyo akufaki dimanche na likama ya hélicoptère, azalaki na makanisi malamu mpe na Congo mpe na Afrika, etatoli Dider Mubenga ya Congo démocratique oyo abetaki mpe alongaki elongo na Kobe Bryant na Lakers Los Angeles.
Gouverneur ya Californie na maire ya Calabasas basakoli ete Kobe Bryant, mosani ya basketball ya kala, akufi na likama ya hélicoptère. Lakers Los Angeles, équipe na ye, etindaki bato kotala na esika ya likama.
PPRD, lingomba ya mokonzi ya kala Joseph Kabila ewangani ete Emmanuel Ramazani Shadary na Marcellin Cishambo bapekisami kozwa mpepo mpe babotalami ba passeports diplomatiques. Elobi ezali lokuta, "Fake news".
Chef ya sous-poste ya ANR (Agence nationale ya renseignement) na Pweto, na Haut-Katanga, abomami na basimba minduki bafundami kozala ba Maï Maï Bakata Katanga, eyebisi bayi société civile.
Président Félix Tshisekedi azali na Davos, na Suisse, epayi wapi bokutani ya mobu na mobu mpo na nkita ya molongo to Forum annuel mondial esangisi bakambi ya bikolo ya mpifo na mokili ekozali kosala. Akutani na Premier ministre ya Belgique npe abengisi ye na février na RDC.
Moko na basali ya bokolongono oyo asi apesamaki mangwele ya Ebola, azwi bokono boye na Beni, eyebisi bakambi ya misala ya bitumba na maladie eye.
Bosambisa ya Donald Trump, mokonzi ya Etats-Unis bokokota na bozindo lelo liboso ya Sénat epayi wapi opposition, ba démocrates baye bazali kosenga bokweyisami na ye, bakondongwana na ba républicains baye baye baleki mingi na Sénat mpe kani kotika mokambi ya ekolo.
Bavandi ya Goma bakangi moto moko na bombe artisanale. Moto yango afundami kozala moko na babundi ya ADF, elobi mokambi ya Nord-Kivu, Carly Kasivita Nzanzu.
Président Félix Tshisekedi asengi bana ya ekolo Congo démocratique batika koyina ba Banyamulenge, akebisi ba ministres ya gouvernement na komeka kotelemela ye mpe alobi balkanisation ezali te. Alobi yango na lingala na bokutani na Londres na ba Congolais ya libanda ya mboka.
José Eduardo dos Santos, mokonzi ya kala ya Angola akomi na mokanda ete azali te na bopengwisami ya mbongo ya l’état oyo mwana na ye wa yambo Isabel dos Santos afundami oyo alaki kozala candidate na présidentielle ya 2022.
Voir plus