Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato 24 babomami na baye bafundami kozala ba ADF pene na Oicha


Minganga bazali kosalisa moto moko akatami na makwangola, na lopitalo ya Oicha, territoire ya Beni, Nord-Kicu, 30 octobre 2020.
Minganga bazali kosalisa moto moko akatami na makwangola, na lopitalo ya Oicha, territoire ya Beni, Nord-Kicu, 30 octobre 2020.

Bato 24 bakufi na makwangola na bitumba ya baye bafundami kozala ba tomboki ya ADF o'mokolo mwa minei, pene na Oicha, engumba mokonzi ya territoire ya Beni.

"Nzoto 24 ezwami na bisika minei pene na Oicha," elobi mokambi ya territoire ya Beni, Donat Kibwana.

ONG Baromètre sécurité ya Kivu etangaki bibembe 19.

"Na cité ya Mantumbi, nzoto 11 emonanaki mpe motoba na Mamove. Bato banei basusu babomamaki na mboka mibale nzinganzinga, misato bakamaki kingo na nzela ya bilanga," ebakisi M. Kibwana.

Na mikolo mibale, bato tuku motoba nde bakufi na bitumba ya batomboki baye ya ADF ya bayi Ouganda.

Mampinga ya ekolo Congo démocratique mabandaki bitumba makasi na ba ADF le 30 octobre. FARDC eyebisaki ete ebotolaki bisika babundi baye bazalaka mpe esakolaki ete ebomaki motoba ya bakambi sambo ya lingomba liye.

Bato 63 babomamami na kokatama na makwangola nsima ya mposo misato ya kimya.

XS
SM
MD
LG