Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

"Bakata Katanga" bafundami na koboma mokonzi ya ANR na Pweto


Mampinga ya Rwanda na Pweto, Haut-Katanga, 28 février 2001.
Mampinga ya Rwanda na Pweto, Haut-Katanga, 28 février 2001.

Chef ya sous-poste ya ANR (Agence nationale ya renseignement) na Pweto, na Haut-Katanga, abomami na basimba minduki bafundami kozala ba Maï Maï Bakata Katanga, eyebisi bayi société civile.

"O’mokolo mwa lundi, pene na 20 heures... basimba minduki minei ya Bakata Katanga bakendaki na ndako ya chef ya sous-poste ya ANR na Nzuiba mpe babetaki ye masisi na pembeni," elobi mokambi ya société civile na Pweto, Delphin Lwembe, atangami na radio Okapi.

"Nsima na yango batiaki ye mbeli mpe bakataki bomoto ya masoli oyo ya l’Etat," ebakisi M. Lwembe.

Kolanda maloba maye, nzoto ya mowei ezali kozela kokundama.

Bakata Katanga bafundamaka mpo na bitumba mpe mobulu mingi na etuka ya kala ya Katanga.

XS
SM
MD
LG