Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Avion ya mampinga ya USA ekweyi na Afghanistan


Avion ya Etats-Unis ekweyi na Est ya Afghanistan, 17 janvier 2020.
Avion ya Etats-Unis ekweyi na Est ya Afghanistan, 17 janvier 2020.

Avion ya mampinga ya Etats-Unis ekweyi lundi na Afghanistan na esika ezali na maboko ya ba talibans. Lingomba ya ba talibans elobi bango ndenge babeti yango masasi.

"Appareil spécial ya ba 'occupants américains' ekweyi na province Ghazni… tobeti yango masasi," elobi molebeli ya ba talibans Zabiullah Mujahid.

Pentagone (ministère ya Défense ya Etats-Unis) endimi ete mpepo yango ekweyi kasi elobi ete bolukiluki bozali kosalama.

XS
SM
MD
LG