Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bosambisami ya Trump na Sénat ezo'kota na bozindo


Donald Trump na Forum économique na Davos, Suisse, 21 janvier 2020.
Donald Trump na Forum économique na Davos, Suisse, 21 janvier 2020.

Bosambisa ya Donald Trump, mokonzi ya Etats-Unis bokokota na bozindo lelo liboso ya Sénat epayi wapi opposition, ba démocrates baye bazali kosenga bokweyisami na ye, bakondongwana na ba républicains baye baye baleki mingi na Sénat mpe kani kotika mokambi ya ekolo.

Balakisi ya elongi ya Chambre des représentants, ba députés, epayi wapi ba démocrates baleki mingi, bakozala lokola bafundi mpe bayi nde bazuzi.

Likambo lyango libandaki sanza minei eleki.

Donald Trump afundami na kosalela bokonzi na koleka ndelo mpo na kosenga bakonzi ya Ukraine koluka mbeba to kopakola potopoto na vice-président ya kala Joe Baiden, démocrate oyo akoki kozala mbanda na ye na maponai ya mokonzi ya mboka ya 2020.

Donlda Trump azali mokonzi ya misato nsima na Bill Clinton mpe Andrew Johnson oyo aleki na bosambisami liboso ya Sénat to impeachment na Anglais.

XS
SM
MD
LG