Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Basimba minduki mpe mampinga babomi 197 civils na décembre na Est


Bavandi ya Kitchanga na terrioire ya Masisi, Nord-Kivu, 16 juillet 2012.
Bavandi ya Kitchanga na terrioire ya Masisi, Nord-Kivu, 16 juillet 2012.

Basimba minduki mpe mampinga babomi 197 civils na décembre na Est, elobi balukiluki ya Kivu security tracker (KST).

"Mangomba ya basimba minduki mpe bayi mampinga babomi koleka 197 civils na mikolo 31 ya suka ya mbo 2019," elobi rapport ya KST.

"Sanza ya décembre 2019 ezali oyo bato ba civils mingi bakufi lokola nanu tozwa yango te na baromètre banda ekelama juin 2017," eyebisi balukiluki baye bazwi sango yango na bituka mibale ya Kivu (Nord na Sud-Kivu).

117 civils bakufi na Beni, na Nord-Kivu. Na novembre, ezalaki 126. KST elobi ezali ba ADF nde babomi bango.

Na Sud-Kivu, koleka 10 civils bakufi na bitumba ya mambinga na batomboki hutu ya Rwanda. Ezali mingi bayi mabota ya babundi.

Na janvier, bato pene 20 bakufaki na mposo ya 20 na 25 janvier na Rutshuru, na nord ya Goma (Nord-Kivu) kolanda CODHAS (Centre ya lisalisi ya makoki ya bamoto mpe ya lisungi).

XS
SM
MD
LG