Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bavandi ya Goma bakangi ADF moko na ba bombes artisanales


Mokambi ya etuka ya Nord-Kivu Carly Nzanzu Kasivita akiti na aéroport ya Beni, le 22 novembre 2019. (Facebook/Gouvernorat Nord-Kivu)
Mokambi ya etuka ya Nord-Kivu Carly Nzanzu Kasivita akiti na aéroport ya Beni, le 22 novembre 2019. (Facebook/Gouvernorat Nord-Kivu)

Bavandi ya Goma bakangi moto moko na bombe artisanale. Moto yango afundami kozala moko na babundi ya ADF, elobi mokambi ya Nord-Kivu, Carly Kasivita Nzanzu.

"Lobi loleki, (bavandi) bakangaki ADF moko awa na Goma na ba bombes artisanales. Lokola bazali kobengana bango na Beni, basili bapanzani," esakoli M. Kasivita na bokutani na bapanzi sango bayike na engumba mokonzi ya Nord-Kivu.

Mpo na ye, likambo yango lipesi nzela ete bavandi bamona ete ba Congolais mpe bakota na lisanga ya basimba ya batomboki ya Ouganda, ADF.

M. Kasivita abwaki mbela na bavandi kozala na bokebi.

Mampinga ya RDC, ba FARDC, babandaki kobengana ba ADF na Beni na suka ya sanza ya octobre. Batiya Etat-major général na bango na Beni.

XS
SM
MD
LG