Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi aza na Davos, abengisi PM ya Belgique na février


Président Félix Tshisekedi ya RDC (C) na bokutani na Premier ministre ya Belgique Sophie Wilmès (G) na likita ya nkita ya molongo na Davos, Suisse, 22 janvier 2020. (Twitter/Sophie Wilmès)
Président Félix Tshisekedi ya RDC (C) na bokutani na Premier ministre ya Belgique Sophie Wilmès (G) na likita ya nkita ya molongo na Davos, Suisse, 22 janvier 2020. (Twitter/Sophie Wilmès)

Président Félix Tshisekedi azali na Davos, na Suisse, epayi wapi bokutani ya mobu na mobu mpo na nkita ya molongo to Forum annuel mondial esangisi bakambi ya bikolo ya mpifo na mokili ekozali kosala. Akutani na Premier ministre ya Belgique npe abengisi ye na février na RDC.

"Na likita ya Davos, nakutani na président ya Congo Tshisekedi. Tozali biso banso na mokano ya kolendisa boyokani kati na Belgique na ekolo Congo démocratique. Sanza ekoya, ekozala na mobembo ya bokonzi na Kinshasa mpe Lubumbashi," ekomi na compte Twitter na ye, Premier ministre ya Belgique, Sophie Wilmès, nsima na bokutani na bango.

Ba ministre ya Mambi ya bapaya, Philippe mpe Coopération au développement, Alezander De Croo, bakozala na mobembo yango.

Bato koleka 3.000 bawuti bikolo 117 bazali na Forum ya Davos.

Félix Tshisekedi awuti bongo Londres na Grande Bretagne na likita Invest UK-Africa epayi wapi azwaki maloba lobi loleki mpe abengaki bakeli misala koya kotia mosolo na ekolo Congo démocratique.

Na Londres, Félix Tshisekedi akutani mpe na bana ya Congo démocratique mpe asololaki na bango mpo etali balkanisation, Banyamulenge mpe mpo na nkwokoso eye ekoki komema kokweyisama ya Parlement.

XS
SM
MD
LG