Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Parti ya pouvoir eponi Ndayishimiye mpo na maponami ya mai 2020 na Burundi


Général Evariste Ndayishimiye (G) na président Pierre Nkurunziza na congrès ya CNDD-FDD ma Gitega, Burundi, 26 janvier 2020.
Général Evariste Ndayishimiye (G) na président Pierre Nkurunziza na congrès ya CNDD-FDD ma Gitega, Burundi, 26 janvier 2020.

CNDD-FDD, parti ya Pierre Nkurunziza, mokonzi ya Burundi, eponi général Evariste Ndayishimiye lokola candidat na yango na élection présidentielle ya mai 2020. M. Nkurunziza alakaki nsima na kobongola buku likonzi ete akozala te na maponami myango.

Boponami ya général Ndayishimiye bosalamaki dimanche na congrès extraoridnaire ya CNDD-FDD na Gitega, engumba mokonzi ya sika ya Buurundi.

"Nandimi na lombango kozala candidat" ya CNDD-FDD, elobi Ndayishimiye.

Pierre Nkurunziza oyo aza na mibu 55, azali na bokonzi wuto 2005. Akamwisaki bato na kolaka na 2018 kozala te na maponami makoya nsima na kobongola buku likonzi oyo epesi ye sik'oyonzela ya kopesa nkombo mpo na mbala mosusu mpo na kowela bokonzi.

Kolanda CPI (Cour pénale internationale), koleka bato 1.200 bakufaki mpe 400.000 bakimaki ndako na bango na Burundi, ntango M. Nkurunziza apesaki nkombo naye mpo na mbala misatu na maponami na 2015. Buku likonzi ezalaki kopekisa konzonga mbala misatu.

XS
SM
MD
LG