Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

PPRD ebengi "Fake News" bobotoli passeport mpe bopekisi Ramazani Shadary kozwa avion


Emmanuel Ramazani Shadary, candidat ya FCC (Front commun pour le Congo) na bapanzi sango na Kinshasa, 29 décembre 2018.
Emmanuel Ramazani Shadary, candidat ya FCC (Front commun pour le Congo) na bapanzi sango na Kinshasa, 29 décembre 2018.

PPRD, lingomba ya mokonzi ya kala Joseph Kabila ewangani ete Emmanuel Ramazani Shadary na Marcellin Cishambo bapekisami kozwa mpepo mpe babotalami ba passeports diplomatiques. Elobi ezali lokuta, "Fake news".

"Bato bayeba ete ezali 'Fake news' (sango ya lokuta) esalami ya kosalama," ekomi PPRD na Twitter.

Nzokande basali baiike na libanda ya mpepo bandimi, kolanda AFP mpe media misusu, ete Ramazami, secrétaire permanent ya lingo eye mpe candidat ya FCC (Front commun pour le Congo) na maponami ya mokonzi ya mboka ya le 30 décembre 2018, na mokambi ya kala ya Sud-Kivu, Marcellin Cishambo babotolami ba passeports mpe bapekisami kozwa avion mpo na kokende Kenya.

Moko na bakonzi ya DGM (Direction générale ya migration) ayebisi AFP ete Emmanuel Ramazani Shadary na Marcellin Cishambo bapekisamaki komata na mpepo ya Ethiopian Airlines mpo bazalaki na ba passeports diplomatiques ntango bazali lisusu te na bokonzi.

"Mpo etali mosala ya Ramazani Shadary, ekomami (na passeport) vice-Premier ministre, ministre ya Intérieur mpe na oyo ya M. Cishambo, gouverneur ya etuka. Nani ayebi te ete basalaka lisusu na mabonga wana te ?" amituni mokambi oyo ya DGM na AFP.

M. Ramazani, ye moko mpe alobi na AFP ete ezali "sango ya lokuta".

Matata mazali kati mabota ya kala ya politiki ya mokonzi ya kala na FCC na oyo ya mokonzi ya sika Felix Tshisekedi CACH, nsima na maloba ya mokambi ya ekolo mpo makoki ya kopanza Assemblée nationale.

XS
SM
MD
LG