Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Agent ya santé azwaki vaccin abeli Ebola


Mosali ya bokolongono azali kopesa mangwele na moto moko na Goma, Nord-Kivu, 15 juillet 2019.
Mosali ya bokolongono azali kopesa mangwele na moto moko na Goma, Nord-Kivu, 15 juillet 2019.

Moko na basali ya bokolongono oyo asi apesamaki mangwele ya Ebola, azwi bokono boye na Beni, eyebisi bakambi ya misala ya bitumba na maladie eye.

Nkasa ya sango ya mokolo na mokolo ya ministère ya Santé elobi ete mosali oyo abetamaki dose ya yambo ya rVSV-ZEBOV, mangwele mapesamaki na sanza ya mwambe (août) ya 2018. rVSV-ZEBOV ekelama na groupe américain Merck Sharp and Dohme.

"Esengeli kopesa mikolo mwambe to 10 mpo mangwele ebimisa ba anticorps na ntina ya koyeba kobundisa na makasi nyonso bokono bwango," elibmboli bakonzi ya ministère ya Santé.

Wuto bokono boye bobandaki na monyele ya RDC na aoû 2018, basali ya bokolongono 167 bazwi maladie yango mpe 41 bakufi, kolanda ministère ya Santé. Bato 2.267 bakufi wuto libandela ya épidémie yango.

XS
SM
MD
LG