Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi asengi motema malamu na ba Banyamulenge mpe akebisi baye bakotelemela ye na mbulamatari


Président Félix Tshisekedi na bokutani na diaspora ya RDC, na Londres, Grande-Bretagne, 19 janvier 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na bokutani na diaspora ya RDC, na Londres, Grande-Bretagne, 19 janvier 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi asengi bana ya ekolo Congo démocratique batika koyina ba Banyamulenge, akebisi ba ministres ya gouvernement na komeka kotelemela ye mpe alobi balkanisation ezali te. Alobi yango na lingala na bokutani na Londres na ba Congolais ya libanda ya mboka.

Mokonzi ya RDC alimboli ntina ya matamata na Hauts plauteaux, na Sud-Kivu, kati na Banyamulenge na kabila misusu mpo na mabele.

"Banyamulenge bazali ba Congolais. Totika koyinana kati na biso. Bavanda des générations des générations. Lokola bino awa na Grande-Bretagne bozwi nationalité mpe babandi kobengana bino," elobi M. Tshisekedi.

Mokambi ya RDC alobi akutanaki na bayike ya Banyamulenge mpe akebisaki bango mpo koluka koluka kosala justice na bango moko to police na armée na bango moko.

"Soki bolingi bosala justice na bino moko to police to armée, tokoyokana soki moke te," ekebisi M. Tshisekedi.

Nzokande mposo moleki, colonel moko ya munyamuelenge asakolaki ete alongwe na mampinga mpo na kokende kokamba ba Gumino, lingomba ya basemba minduki ya Banyamulenge.

Mpo na Félix Tshisekedi, "likambo ya 'balkanization', ezali likambo bayini mpe bandoki balingi komatisa mpo kobebisa mosala" azali kosala na mampinga na monyele ya RDC.

"Tant que na kozala président, il n’y aura même pas un centimètre de notre pays qui sera arraché," alaki.

"Ezali… oeuvre ya ba Congolais ya mitema mabe oyo tokosukisa complètement na mikolo makoya… Likambo ya Beni ezali likambo ya agression te, ezali likambo ya 'likopa' mpo na kosala trafic ya or, ya cacao na makambo misusu… Ba organisations mafieuses nde ezali nsima ya ba ADF," elimboli M. Tshisekedi.

Alakisi lolenge ADF ebotama, ntango ya mokonzi ya kala Mobutu Sese Seko, mpo na kosunga moninga wa ye Idi Amin Adada komeka kozonga na bokonzi na Ouganda.

"Soki na yebisi bino ete ba Congolais mpe bazali lelo kati na ba ADF bokondima nga te," elobi M. Tshisekedi.

Mokonzi ya RDC andimi ete bayike na coalition CACH-FCC balingi te ete alonga mpe bazali kobondisa ye.

"Oyo nyonso akomeka kotelema na nzela na ngai, surtout soki azali ministre oyo ngayi na 'nommaki', nkombo na ye bic rouge," ekebisi M. Tshisekedi.

Asepeli mpo ete kino sik’oyo ministre moko te atelemeli ye.

Asengi bana ya Congo kozela, mpo mbulamatari esali kaka sanza minei wuto etiyama.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG