Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mwasi moko apesi bokono ya Coronavirus na mobali na ye na Etats-Unis


Basali bokolongono bazali komekama moto ya bato station ya train na Jiujiang, na etuka ya Jiangxi, Chine, 29 janvier 2020.
Basali bokolongono bazali komekama moto ya bato station ya train na Jiujiang, na etuka ya Jiangxi, Chine, 29 janvier 2020.

Bakonzi ya bokolongono na Etats-Unis balobi moto ya yambo azwi bokono ya Coronavirus kowuta na moto mosusu na mabele ya Amerika. Moto yango ezali mobali oyo azwi bokono bwango na mwasi na ye.

"Moto ya mibale ya azwami na Coronavirus ya sika na Illinois azali moko na bavandi ya Chicago, azali mpe molongani ya moto wa yambo (mwasi) oyo azali kobela bokono yango na kowuta mobembo," eyebisi Robert Redfield, mokambi ya na Centre ya kotala mpe kobatela na bokono (CDC).

Moto wa yambo ya kozwa bokono bwango ezalaki mwasi ya mibu pene tuku motoba.

"Toyebi ekoki kobangisa… kasi likama ezali sik’oyo moke mpo na ba Américains," elobi M. Redfield.

Coronavirus "epanzanaka mingi te kati na bato, tokanisi ete likama ezali te mpo na bana mboka," eyebi Ngozi Ezike, mokambi ya Santé publique ya Illinois.

Mwasi oyo azwamaki na bokono boye awutaki Wuhan na Chine, azongaki na Chicago le 13 janvier. Molongani wa ye akendaki Chine te kasi azwaki virus epayi ya mwasi na ye.

"Etats-Unis esengi te na bato kozipa zola na monoko na masque," elobi Nancy Messonnier, mokambi atalaka bokono ya mpema na CDC.

Na Etats-Unis mobimba bato motoba basi bazwi coronavirus ya sika. Bato 92 bazali kolandelama.

Bakoni batano bawuti na Chine epayi wapi bato 7.700 basi bazwi bokono yango mpe 170 bakufi.

Koleka mboka 15 ezwi bato na bokono yango na Asie, poto, na Amerika ya nord mpe Moyen orient.

XS
SM
MD
LG