Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba ayebisi ete esengeli mwa ntango moke lisusu mpo na botiyami ya gouvernement.
Président Félix Tshisekedi akambi lelo bokutani ya bokengi na bakonzi ya likolo ya mampinga na Cité ya Union africaine.
Greenpeace Afrique, ONG ya kobatela environnement mpe zamba, esengi lisusu mokonzi ya Congo démocratique, Félix Tshisekedi, koboya misala minso ya boluki to ya kozuwa pétrole na parc ya Solnga, na Cuvette Centrale.
Minganga misatu ya Congo démocratique bakangami nsima na bofundami mpo na liwa ya moninga wa bango ya ekolo Cameroun, épidémiologiste Richard Mouzoko ya OMS (Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono) oyo babomaka na Butembo na misala ya kobundisa Ebola le 19 avril eleki.
Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba apesi na baye ya CACH (Cap pour le changement) ya président Félix Tshisekedi mpe ya FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, ba critères mpo na baye kozala na gouvernement.
Gloria Bitomwa mpe Zéf-Osée Muteba bazalaki kati na bilenge balakisa elongi ya Congo démocratique na bokutani ya kopesana mayele Mandela Fellowship to YALI 2019 (Young Africans Leaders Initiative) awa na Washington. Mme Bitomwa alobeli tourisme mpe M. Muteba, business mpe milona.
Bato koleka1.800 bakufi na malaria na Burundi banda mobu mobandaki, motango mokakani na moye ya Ebola na Congo démocratique, eyebisi OCHA, Mabonigisi ya Nations unies ya kotala ba affaires humanitres.
Nzoto ya bato 11 ezuwami nsima na bozindi ya balainière moko na mayi ya Lukenye, na Kasaï, eyebisi bakambi ya esika eye. Basali mobembo misusu bamonani te kino sikoyo, kolanda bankonzi baye.
Global Witness elobi na rapport moko ete mwana ya Denis Sassou-Ngesso mokonzi ya Congo-Brazzaville, Denis Christel Sassou-Nguesso amonani lokola azwuaki koleka 50 millions de dollars na nzela ya structure ya "entreprise complexe mpe opaque" na mboka ebele.
Ba civils 577 bakufi banda janvier na bitumba na territoire ya Masisi, na Nord-Kivu, elobi na rapport Bureau ya Nations unies ya coordination ya ba affaires humanitaires (Ocha).
Bakonzi ya bokolongo ya nzoto na Ouganda basakoli ete babandi komeka na mboka na bango mangwele moko ya Ebola moye makopesama na Congo démocratique epayi wapi bato koleka 1.800 ba wei na mobu moko na bokono boye bozali kongala kuna.
Martin Fayulu, moko na bakambi ya lingomba Lamuka mpe mokonzi ya lisanga Ecidé, alobi ete azali kosenga maponami yambo na ntango (élections anticipées). Alobi yango na meeting asalaki o’mokolo ya eyenga na camp Luka, na Kinshasa, liboso ya bituluku ya bato.
Bato ebele bakufi mpe mingi bazoki na masasi mabetami na esika ya mobongo ya El Paso, na Texas, eyebisi bakonzi ya engumba eye. Bato misato baye bakoki kozala baye basali likambo yango bakangami.
Mituka mibale mimemaki badokotolo ya misala ya kobundisa Ebola mizuwi masasi, eyebisi bayi police mpe OMS (Mabongisi ya bokolongono ya molongo).
Moyi Rwanda Jean Bosco Ruberwa alongi étape ya yambo ya 7e tour ya RDC esalami banda Boma ti Matadi o’mokolo ya mposo.
Bato sambo baye bazalaki nzinga nzinga ya moluki wolo oyo akufaki o’mokolo ya misato moleki na Ebola bazongisami na Goma, kowuta na Sud-Kivu esika wapi bakendeki.
Hamza Ben Laden, moko na bana ya Ousama Ben Laden oyo azalaki lokola mokitani na ye na kotambwisa Al-Qaïda, akufi na bitumba (opérations). Etats-Unis ezalaki mpe na misala miye mimemi na koboma ye, kolanda sango epesami na New York Times mpe NBC.
Etats-Unis ezali kokanisa mibu nkama minei ya bokomi ya bawumbo ya mposo moyindo na mabele ya Amerika.
Moto ya misatu amonani na Ebola na Goma, eyebisi mokambi ya bitumba ya bokono boye na etuka ya Nord-Kivu, Dr. Aron Aruna Abedi., kolanda AFP
*Mokoni ya mibale ya Ebola na Goma akufi *Bobangi na Bukavu mpo na Ebola *USA epesi 3,5 milliards CFA mpo na réinsertion ya basimba minduki na Congo-Brazzaville *CLC esengi bazuzi ya Cour constitutionnelle batika mosala
Voir plus