Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mobu 400 banda bawumbo ya bayindo bwa yambo bakomaka na Etats-Unis


Bato bazali kosala lisano ya komekola ndenge bawumbo bazalaki komema, na mboka Badagry, Nigeria, 25 août 2002.
Bato bazali kosala lisano ya komekola ndenge bawumbo bazalaki komema, na mboka Badagry, Nigeria, 25 août 2002.

Etats-Unis ezali kokanisa mibu nkama minei ya bokomi ya bawumbo ya mposo moyindo na mabele ya Amerika.

Mpo na yango, mokambi ya Chambre ya ba representants, démocrate Nancy Pelosi akitaki bongo na Ghana.

Na lisikuli na ye liboso ya parlement (ndako bokeli mibeko) ya Ghana, Mme Pelosi apamelaki "mbeba monene" bowumbo bozalaki.

Mokambi ya suku ya nse ya Amerika, akendeki na Ghana na limpinga ya baye ya lingomba ya Congressional Black Caucus ya palerment ya USA.

Alakisaki mawa na ye mpo na bawumbo nkoto na nkoto baye bakengamaki, banyokolamaki mpe bakufaki mingi na lolenge ya kobika mabe kati na masuwa mazalaki kokomema bango.

Lisitwale elobaka ngambo moko ete bayindo bakomaki kala, yambo koleka mibu nkama minei na Amerika. Kasi bayike bandimaka mobu 1619 ntango masuwa moko ebotolaki bawombo na ba Portugais mpe momemaki bango na Virginie, moko ya ba Etats ya USA, lokola mokolo mwa yambo bakomaki na Amerika.

Kolanda listwale, masuwa yango ya yambo mowuta na Angola to nzinga nzinga.

Na ngambo na ye président Donald Trump azalaki na Virginie, o'mokolo yango, mpe akanisaki mibu nkama minei ya botiyami ya democratie na hémisphère nord to ndelo ya likolo na mokili.

XS
SM
MD
LG