Moto ya mibale oyo amonanaki na Ebola na Goma akufi, endimi mokambi atiyami mpo na bitumba na bokono boye na Congo démocrarique, Dr. Jean-Jacques Muyembe.
Bakambi ya Lamuka bazali na masolo banda mardi na ntongo na résidence ya Moïse Katumbi na Lubumbashi.
CACH (Cap pour le changement) ya président Félix Tshisekedi mpe FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila babimisi lundi na mpokwa boyakani ya gouvernement ya boyokani boye batie manzaka. Ekozala gouvernement ya bato 65. CACH, 43 mpeyo etikali FCC.
Ba Léopards séniors ya basi bazali na groupe C ya phase finale ya Afrobasket, championnat ya basketball eye ekobetama banda le 10 kino le 18 août 2019 na Dakar, na Sénégal.
Kolanda maloba ya baye ya MLC, Jean-Pierre Bemba, mokambi ya lisangana na bango akozala te na bokutani ya Lamuka mpo mpepo na ye ezali na likama.
Equipe nationale ya Congo démocratique elongi championnat ya Afrika ya basketball AfroCan ya basani babetaka na continent, na finale na Kenya 82-61 na Bamako, Mali epayi wapi momekano moye mobetami.
Président Félix Tshisekedi akomi na Abuja, engumba mokonzi ya Nigeria, epayi wapi akozala na Forum ya entrepreunariat 2019.
Moïse Katumbi, mokambi ya lingomba Lamuka mpe ya Ensemble, akomi na Kolwezi, na etuka ya Lualaba na safari to mobembo ya kati ya mboka azali kosala.
Président Félix Tshisekedi azelami o’mokolo ya mitano, le 26 juillet 2019, na Abuja, engumba mokonzi ya Nigeria, mpo na bokutani ya bokeli misala, Forum 2019 Entrepreneuriat.
Pene na bato 700 babomamaki na lobango mpe na bozangi mokano ya ba zuzi na Congo démocratique, eyebisi rapport ya sanza motoba ya Bureau conjoint ya Nations unies mpo na makoki ya bomoto BNUDH.
Norbert Luyeye, mokambi ya lisanga Union des républicains mpe moko na baye bazalaki mpeza mopanzi ya nkondo Etienne Tshisekedi, alobi nkwokoso eye ezali na Congo démocratique ewuti na bozangi bokonzi boye endimami. Mpo na ye maponami ya solo masalamaki te. Asengi masolo na mboka mpo na kotosa Accord
Joseph-Stéphane Mukumadi oyo aponamaki mokambi ya Sankuru nsima na momekano ya mokolo ya mposo moleki na Lambert Mende ya FCC (ya kokonzi ya kala Joseph Kabila), asakoli ete akoti na CACH, lingomba liye lizali na nse ya président Félix Tshisekedi.
Dr Oly Ilunga, ministre ya mambi ya Bokolongono atiki mosala mikolo mibale nsima na mokano ya president Félix Tshisekedi ya kozuwa bitumba ya Ebola na maboko mpe ya kotiya na esika équipe ba experts ekambami na Dr. Jean-Jacques Muyembe mpo na yango.
Président Félix Tshisekedi akutani na Cité ya Union africaine na Kinshasa, na misala (équipe) ya banganga ya boyebi (experts) eye atiye mpo na kobundisa bokono ya Ebola, kolanda présidence ya RDC.
Lambert Mende, molobeli ya kala ya gouvernement, apameli kaniaka nsima na kokweyisama na maponami mpo na mokambi ya etuka ya Sankuru. Joseph-Stéphane Mukumadi, candidat indépendant oyo Mendee atemelelaki nde alongi.
USA esakoli ete ezali na bilembo bilakisi ete ebebisi drone ya Iran eye epusanaki pene na masuwa ya nitumba na yango kasi Téhéran eboyi yango.
Bavandi ya Bunia, engumba mokonzi ya Ituri, batambolaki na moto ya elenge mwasi moko mpo na kotelemela bobomi na bato bozali kongala na etuka eye.
Misala ya bokolongono ya molongo (OMS) milobi ete Ebola na RDC ezali likambo molongo mombimba mosengele kolunga kosilisa na lombango to "urgence" sanitaire mondiale.
*Tshisekedi abikisi Congolais moko bakatelaki pendaison na Malaisie *Tshisekedi akiti bisika ya misala ya ba saut-de-moutons *Bulamatari ya Congo-Brazzaville epesi angele na ba compagnies ya téléphonies céllulaires *Elève moko azwama na Ebola azali kosalsa Exetat na CTE na Beni
Ministère ya Enseignement primaire, secondaire et professionnel (EPSP) ebandi kobimisa ba résultats ya examen d’Etat (Exetat) ya session 2018-2019. 72% ya bana nde bazuwi na momekano moye na engumba mpe etuka ya Kinshasa, alimboli na VOA Lingala ministre intérimaire ya EPSP, Emmery Okundji.
Voir plus