Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ouganda ezali komeka mangwele ya Ebola oyo ebendi ntembe na RDC


Mosali ya bokolongono azali kopesa mangwele na moto moko na Goma, Nord-Kivu, 15 juillet 2019.
Mosali ya bokolongono azali kopesa mangwele na moto moko na Goma, Nord-Kivu, 15 juillet 2019.

Bakonzi ya bokolongo ya nzoto na Ouganda basakoli ete babandi komeka na mboka na bango mangwele moko ya Ebola moye makopesama na Congo démocratique epayi wapi bato koleka 1.800 ba wei na mobu moko na bokono boye bozali kongala kuna.

Conseil ya bolukiluki ya bokolongono (MRC) ya Ouganda ekomi na liyebisi ete bomeki ya mangwele MVA-BN maye bosalemi na société ya Amerika Johnson&Johnson bokowumela mibu mibale.

Nzokande mangwele mango mabendi ntembe na ngambo ya Congo démocratique esika wapi esengelaki mpe kopesama.

Bayike na RDC batelemelaki yango. Ministre ya Santé, Dr. Oly Ilunga azali kati na baye baboyaki mangwele yango. Atikaki mosala na sanza ya sambo.

Mangwele mango makopesama na Ouganda na basali 800 ya bokolongono mpe baye bazali o’boso na misala lokola baye basukolaka ndako mpe bisaleli, baye ya misala ya ambulance, ya ba morgues (ndako ya bobombi nzoto ya bakufi) to baye bakundaka bibembe na district ya Mbarara (ouest), eyebisi MRC.

“T’osai kopesa sik’oyo mandwele na Mbarara, elobi na AFP molbeli ya MRC, Pamela Nabukenya Wairagala.

Bato ya zeti (ba chercheurs) ya Ouganda nde bakambi bopesi manwegele maye na lisalisi ya Eteyelo ya bopeto mpe ya médecine tropicale ya Londres.

Nkisi ya kobikisa bokono ya Ebola ezali naino te.

Mangwele ya yambo epesamaki na RDC mpo kobundisa virus ya Ebola eye ezali kongala na ekolo eye banda août 2018.

Bakonzi ya Congo démocratique bazali kosalela mangwele ya nkombo rVSV-Zebov eye ekelami na groupe pharmaceutique ya Amerika Merick oyo emonisi makasi na yango mpo na kobatela na bokono boye.

OMS (Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono) esengaki ete mangwele eye mapesama mingi mpe bobakisami ya mangwele mosusu oyo esalami na Johnson&Johnson mpo na bosenga bozali mingi.

Kasi bayike na RDC batelelaki yango. Ministre ya Santé, Dr. Oly Ilunga aboyaki mangwele yango mpe atikaki mosala na sanza ya sambo.

MRC elobi ete mangwele mango mazali malamu mpe mamekamaki na bato koleka 6.000 na Poto (Europe), na Etats-Unis mpe na Ouganda.

Makasi ya mangwele yango ntango ya épidémie, mamekamaki naino te.

XS
SM
MD
LG