Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ilunga Ilunkamba asengi mwa ntango mpo na gouvernement ya sika


Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba na bokutani na baye ya CACH (Cap pour le changement) mpe ya FCC (Front commun pour le Congo) na Kinshasa, 7 août 2019. (Cabinet Primature RDC)
Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba na bokutani na baye ya CACH (Cap pour le changement) mpe ya FCC (Front commun pour le Congo) na Kinshasa, 7 août 2019. (Cabinet Primature RDC)

Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba ayebisi ete esengeli mwa ntango moke lisusu mpo na botiyami ya gouvernement.

Ayambaki o’mokolo ya eyenga na mpokwa mikanda ya ba nkombo mokambi ya CACH mpe motambwi ya UDPS ya président Félix Tshisekedi, Jean-Marc Kambund na mokambi ya FCC ya Joseph Kabila, Néhémie Mwilanya, bapesaki ye na mpokwa.

"Tokokutana lisusu mpo ngai mpe na kosala mosala (ya kopona ba nkombo) liboso na pesa mokanda ya yambo ya bankombo (première mouture) na mokonzi ya mboka," elobi M. Ilunga nsima ntango ayambi mikanda ya CACH na FCC.

"Kobongisa misala na mokili ya politiki ezuwaka ntango. Ezali likambo ya kokamba mposa ya bato, ezali pete te. Epesameli moto nyonso ete. Kasi nakanisi ete tozali na nzela elamu mpo ete mbulamatari ya boyokani esalama," elimboli M. Ilunga na kolakisa mpo nini kozuwa nkombo na bato ezali kowumela.

Premier Ilunga ayebisi ete ayebi ete ezalaki mpasi na mangomaba mabale maye mpo kotikala kaka na bankombo ya baye bakokikndima na gouvernement.

"Ezali mpasi ko gérer ba ambitions. Na yokeli bato babale baye bazali na mosala yango mawa… Na politiki ezali likambo ya pete… Tala kaka esengelaki milulu mibanda nsima na nzanga kasi tobandi tango na mpokwa," elobi M. Ilunga.

Pene na sanza misato mileki banda M. Ilunga atiayama Premier ministre, mpe sanza sambo banda président Felix Tshisekedi akota na bokonzi, kasi gouvernement nanu esalama te.

Na boyokani basalaki mposo moleki, gouvernement yango ekozala na 65, CACH ezuwi mabonga 23 mpe FCC, 42.

Mangomba maye mabale esengelaki bapesa nkombo misato mpo ebonga moko moko kati na 65.

XS
SM
MD
LG