Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Malaria ebomi bato na Burundi lokola Ebola na RDC


Babeli na lopitalo, na Bujumbura, Burundi, 13 décembre 2015.
Babeli na lopitalo, na Bujumbura, Burundi, 13 décembre 2015.

Bato koleka1.800 bakufi na malaria na Burundi banda mobu mobandaki, motango mokakani na moye ya Ebola na Congo démocratique, eyebisi OCHA, Mabonigisi ya Nations unies ya kotala ba affaires humanitres.

Banda ebandeli ya mobu, motango ya baye bazuwi bokono boye mozali 5.738.661 mpe bato 1.801 bakufi, elobi rapport ya OCHA.

Nzokande, Burundi ezalaka na bato millions 11.5.

OCHA elobi ete malaria ekomi lokola épidémie na Burundi banda ebandeli ya sanza ya mitano kasi gouvernement eboyi kondima yango ata ya mabongisi ya molongo balakisi bosengi boye bozali.

Na mposo ya le 15 juillet kino le 21 juillet 2019, "bato 152.243 bazwamaki na malaria. Kati na bango bato 65 nde bakufaki na ba districts 39 ya bokolongono likolo ya 46 districts ya bokolongono ya Burundi," elobi OCHA.

Yango ezali bobakisami ya 164% ya motango ya baye bazuwani na bokono boye.

Nzokande bokono ya Ebola esili koboma, na mobu moko, koleka bato 1.800 na Congo démocratique, mboka ezwami nzinga nzinga.

XS
SM
MD
LG