Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bébé ya mobu moko azuwami na Ebola na Goma


Mwana moko na maboko ya mama na ye azali kozuwa lisalisi na Centre ya traitement mpo na Ebola na Butembo, Nord-Kivu, elili ebisami le 31 juillet 2019. (Twitter/Unicef RDC)
Mwana moko na maboko ya mama na ye azali kozuwa lisalisi na Centre ya traitement mpo na Ebola na Butembo, Nord-Kivu, elili ebisami le 31 juillet 2019. (Twitter/Unicef RDC)

Moto ya misatu amonani na Ebola na Goma, eyebisi mokambi ya bitumba ya bokono boye na etuka ya Nord-Kivu, Dr. Aron Aruna Abedi., kolanda AFP

Moko na bakambi ya misala bitumba na Ebola oyo abombi nkombo na ye ayebisi AFP ete ezali mwana moke ya mobu moko.

"Moto ya bokono yango oyo endimami ezali bébé moko ya mobu moko, mwana ya tata ya bana zomi oyo azuwamaki na Ebola mpe akufaki mercredi na CTE (esika ya lisalisi mpo na Ebola) na Kiziba," eyebisi mokambi noye ya misala bitumba na Ebola na kobomba nkombo na ye.

Moto ya mibale akufaki na butu ya mardi na mercredi. Awutaki na mboka moko pene na Bunia kasi akomaki na lopitalo na Goma mikolo 11 nsima bokono na ye bomonaki ntango esilaki kokoma makasi.

Nzoka nde, bakonzi ya bokolongono batiaki mercredi na quarantaine (mosika na bato basusu) bato 15 na mboka moko pene na Sud-Kivu mpo na bolukiluki bozali kosalama nsima na moto ya mibale kokufa na bokono ya Ebola na Goma, engumba mokonzi ya etuka ya Nord-Kivu eye ezali nginganzinga.

Ba canots rapides mpe basali ya bokolongono bokitaki na lac Kivu. Masuwa nzike matelemisamaki kati na lac.

"Totie bato 15 baye mosika na bato basusu na Birava. Kati na bango mama moko mpe bana motoba baye bawutaki Goma elongo na bato basusu bya libota bayaki kokutana na bango awa," eyebisi na AFP moko na bakonzi ya Birava.

Kolanda Malabo na ye, mama yango na bana baye motoba bawutaki na libota lyoko liye mokonzi na yango akimaki centre ya lisalisi ya Ebola.

Birava ezali pene na lac Kivu, na 30 km na nord ya Bukavu.

Dr. Ciza Nuru, mokambi ya lopitalo ya Bukavu, andimi ete bato baye bayambamaki kuna mpe batiyami na kobombana.

Na butu ya mardi na mercredi moto ya mibale moye amonisaki na bokono ya Ebola na Goma akufaki.

Bokono ya Ebola esili koboma bato 1.803 na mobu mobimba bozali kongala na Est ya RDC.

XS
SM
MD
LG