Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Rwandais JB Ruberwa alongi étape ya liboso ya tour international ya RDC


Batamwisi nkinga na tour international ya RDC, 23 juin 2017. (Facebook/Fecocy RDC)
Batamwisi nkinga na tour international ya RDC, 23 juin 2017. (Facebook/Fecocy RDC)

Moyi Rwanda Jean Bosco Ruberwa alongi étape ya yambo ya 7e tour ya RDC esalami banda Boma ti Matadi o’mokolo ya mposo.

Motambwisi nkinga moye asilisi circuit ya étape eye ya 120 kms na 3h 6’ 68’’.

Alandami na moyi Cameroun Clovis Camzong Abosolo oyo asali 3h 7’ 13’’.

Na nsima na bango, ezali bongo na Vieira Da Silva Helder Jorge ya Angola na esika ya misato; Jean Claude Nzafashwanayi ya Rwanda na esika ya minei; Salim Kipkemboi ya Hollande na esika ya mitano mpe Jodele Tella Artuce ya Cameroun, nde na esika ya motobo.

Congolais ya yambo akomaki moto ya libwa, Jimmy Muhindo.

"Mpo na édition eye, tolingi to longa ata étape moko," eyebisi Jimmy Mohindo, kolanda maloba maye mayebisami na Actualité.cd.

Batambwisi nkinga ya RDC bazali na Rwanda mikolo 21 mpo na komilengele. Balobi ete bayekolaki kuna makambu ebele ya malamu.

Batambwisi nkinga 66 babadandaki momekano moye na ntongo na Boma, na Kongo cenral. Bawuti mboka 11 mpe bazali na ba equipes 12, mibale nde ya RDC.

XS
SM
MD
LG