Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato ebele bakufi na masasi mabetami na Texas


Bason ya bokengi bapanzani bisika masasi mabetami na zango ya wal-Mart na El Paso, Texas, 3 août 2019.
Bason ya bokengi bapanzani bisika masasi mabetami na zango ya wal-Mart na El Paso, Texas, 3 août 2019.

Bato ebele bakufi mpe mingi bazoki na masasi mabetami na esika ya mobongo ya El Paso, na Texas, eyebisi bakonzi ya engumba eye. Bato misato baye bakoki kozala baye basali likambo yango bakangami.

Mondele-mboka ya El Paso, Dee Margo, alobi ete "bato ebele bakufi", kolanda maloba apesi na CNN, kasi apesi motango ya bawei te.

"Ezali likambo ya mpasi. Motema na ngai eningisami," elobaki M. Margo.

Na ngambo na ye, molandi ya modele-mpako, Dan Partick, ayebisi Fox ete kati na bato 15 to 20 nde bazwaki masasi kasi alobi te boni bakufi.

Bato misato baye bakoki kozala baye babetaki masasi maye nde bakangami, elobi mokambi ya engumba.

XS
SM
MD
LG