Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Koleka bato 11 bakutfi na likama ya masuwa na Kasaï


Bato bayike pene na mayi ya Kasaï, na Thiskapa, 26 juillet 2017
Bato bayike pene na mayi ya Kasaï, na Thiskapa, 26 juillet 2017

Nzoto ya bato 11 ezuwami nsima na bozindi ya balainière moko na mayi ya Lukenye, na Kasaï, eyebisi bakambi ya esika eye. Basali mobembo misusu bamonani te kino sikoyo, kolanda bankonzi baye.

"Tosili kozuwa nzoto zomi na moko mpe basali mobembo tuku mitano bazali komonona te, " eyebisi Dieudonné Pieme, mokambi ya etuka ya Kasaï na AFP.

M. alimboli ete likama lyango lisalamaki mposo moko moleki.

"Mingi kati na baye bawei mpe babungi bawutaki na etando ya Kole na Sankutu mpe bazalaki kokende Kinshasa. Baleinière oyo ezalaki komema bango etondaki koleka. Kaka bato zomi na motoba nde babiki na kobetaka mayi", etatoli na AFP mopanzi sango ya radio communautaire na esika eye.

Likama lyango lisalami na etando ya Dekese kati na zamba monene (forêt équatoriale) esika ata nzela ezalaka te mpo kokende na Tshikapa, engumba mokonzi ya Kasaï na koleka 600 km.

Makama ya lolenge loye na mato (bwato mingi) ya kala mingi mpe matondisima koleka, masalamaka mbala ebele na RDC.

Na sanza ya mitano, bato pene na 32 bakufaki na lac Maï-Ndombe nsima bonzindi ya baleinière.

Na sanza ya minei, baleinièe esusu ezindaki na lac Kivu mpe 142 bakufaki na Kalehe.

Bakonzi bazuwaka miiko (mikano) ya lolenge mingi kasi bato balandaka myango te.

XS
SM
MD
LG