Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bakangami ya kala na ANR bafundi Kalev Mutond mpe DGM epekisami ye kobima mboka


Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)
Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)

Mokambi ya kala ya ANR (Agence nationale des renseignements) apekisami kobima na mabele ya ekolo Congo démocratique kolanda mitindo bakonzi ya DGM (Direction générale des migrations) batindi na ndelo nyonso ya mboka. Kasi bato bayike bakangamaka kala na ANR basakoli kofunda M. Kalev na ba zuzi.

"Mitindo ya bakonzi… Mwana mboka Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ANR (ancien Administrateur général) apekisami kobima na etando mobimba… Motindo yango yango esengeli kotiyama na mosala lokola motindami," elakisi mokanda (billet) DGM etindi ya bisika binso. VOA Lingala emonaki yango.

Mikolo mibale mileki, M. Kalev asimbamaki na bayi bokengi mpe ayanolaki ngonga molayi na mituna.

Azwamaki na bokiti bwa ye na mpepo kowuta Ouganda nsima na escla na Nairbi.

Azalaki na passeport diplomatique ntango azali lisusu te na mokonzi.

Na ngambo na bango, bato bayike bakangamaka kala na ANR basakoli kofunda M. Kalev na ba zuzi.

Kati na bato bafundi ezali na bayi politiki lokola Jean-Claude Muyambo Kyassa, Jean-Bertrand Ewanga, Gerard Gecoco Mulumba, Cyril Mupapa mpe basusu .

Bazali kofunda Mwana mboka Kalev mpo na kokanga bato pamba pamba, konyokola bango, koyokisa bango soni mpe kopimela bango lisali ya nzoto. Batonier ya kala Jean-Claud Muyambo alobi ete bakotika mokanda ya kofunda o’mokolo mwa lundi.

Kalev Mutond asimbamaki mwa ntango mikolo mibale mileki nsima na bwa ye na mpepo na kowuta Ouganda na koleka Nairobi.

Mikolo mileki, matata mabimaki kati na M. Kalev na UDPS (Unon pour le progrès lingomba ya mokonzi ya sika Félix Tshisekedi.

Kalaka mokonzi ya UDPS, Augustin Kabuya asakolaki liboso ya balandi baye ete soki M. Kalev azali nanu na bonsomi ezali mpo na lingomba ya mokonzi ya mboka.

M. Kabuya alobaki na miso ya bato banso ete M. Kalev azalaki kolandalanda (espoionner) président Tshisekedi mpo mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Na mokanda akomaki, M. Kalev akebisaki UDPS kobimisa sekele mingi ayebi soki balandi ba yango bazali kokoba kozanga botosi na M. Kabila.

XS
SM
MD
LG