Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame na Museveni bakokutana vendredi na lisungi ya Tshisekedi mpe Lourenço


(G ti D) Ba présidents Yoweri Museveni ya Ouganda, Joao Lourenço ya Angola, Paul Kagame ya Rwanda mpe Felix Tshisekedi ya RDC, na bokutani na Luanda, Angola, 12 juillet 2019. (Présidence ya RDC)
(G ti D) Ba présidents Yoweri Museveni ya Ouganda, Joao Lourenço ya Angola, Paul Kagame ya Rwanda mpe Felix Tshisekedi ya RDC, na bokutani na Luanda, Angola, 12 juillet 2019. (Présidence ya RDC)

Président Paul Kagame ya Rwanda na mokokani wa ye Yuweri Museveni ya Ouganda bakokutana vendredi na Katuna, mboka ezwami na ndelo ya bikolo bya bango mibale na lisungi ya Félix Tshisekedi ya RDC na Joao Lourenço ya Angola.

Felix Tshisekedi na Joao Lourenço nde babondi ya matata kati na mboka Rwanda na Ouganda.

Na boyokani bozali kosalama, Rwanda na Ouganda basi bazongiselamaki bato babango bakangi mpo na kofundama na komikengela na misala ya bosembo.

Kagame na Museveni batiaki manzaka le 21 août 2019 na Luanda na Angola.

Yango ezalaki na makasi ya président Tshisekedi oyo alobaki ete alingi etie bokonzi bwa ye na nse ya elombo ya kimya ezango na etuka ya kati ya Afrika mpe ya Grands lacs.

XS
SM
MD
LG