Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Katumbi alongi bosambisami mpo na kozongela misala ya mines na MCK


Moïse Katumbi na Bruxelles, Belgique, 12 septembre 2018
Moïse Katumbi na Bruxelles, Belgique, 12 septembre 2018

Moïse Katumbi abandi o’mokolo ya mercredi 21 février 2020 komilengele mpo na kozongela société minière na ye, MCK (Mining company Katanga) na Lubumabshi nsima mokano ya Cour ya cassation ya France oyo epesi ye lisusu mpifo likolo na yango na kobotola yango na Necotrans oyo etakamaki.

"Cour ya cassation ya République ya France ekati mpo na libela, ezongisela na maboko ya Moïse Katumbi mpifo na ye likolo na société MCK," elobi Me Mumba Gama, moko na ba avocats ya mokambi oyo ya kala ya etuka ya kala ya Katanga.

Kolanda mosambeli ya M. Katumbi, Neoctrans epesaki kaka 20 millions ya ba dollars na esika ya kofuta 140 millions ya ba dollars ya motuya ya MCK.

Mpo na Me Mumba, Necotrans epesaki na moyibi makoki ya MCK na Octavia, société ya moyi mombongo ya ekolo France Pascal Beveraggi.

XS
SM
MD
LG