Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ebola etikali urgence internationale mpo na sanza misatu


Directeur Général ya OMS, Dr Tedros Adhanom Ghebreyesus, sazali kosokola maboko na aéroport ya Beni, Nord-Kivu, RDC, 15 août 2018. (Twitter/Monusco)
Directeur Général ya OMS, Dr Tedros Adhanom Ghebreyesus, sazali kosokola maboko na aéroport ya Beni, Nord-Kivu, RDC, 15 août 2018. (Twitter/Monusco)

OMS (Mabongisi ya molongo mpo bokolongono) etiki bokono bwa Ebola na RDC lokola urgence internationale mpo na sanza misato, nsima bokutani ya ba experts mercredi na Genève na Suisse.

Mokambi ya OMS, Tedros Adhanom Gebreyesus alobi ata motango ya bato bazali kozwa bokono mokiti mingi Ebola na ekolo Congo démocratique esengeli azala nanu urgence internationale.

Ayebisi ete kino ata moto moko te akozwama na bokono bwa Ebola na etuka ya mpasi mpe ezangi kimya na monyele ya RDC, likama ya kozwa épidémie ya monene lizali nanu.

Kolanda OMS, esengeli mikolo 42 mpo ete elonga esakolama likolo na Ebola nsima na moto moko te kozwama na yango.

Ebola ebandaki na monyele ya RDC na août 2018, mboka Mangina. Ezali kongala na Nord-Kivu mpe na Ituri.

Bato 2.300 bakufi na yango.

M. Gebreyesus akoli ete azali kokita na Kinshasa o'mokolo ya jeudi. Akokutana na président Félix Tshisekedi mpo na kosolola yango.

XS
SM
MD
LG